Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Hosea 5 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Hear this, priests! Pay attention, house of Israel! Listen, house of the king! For the judgment is meant for you, because you have been a snare at Mizpah and a net spread out on Tabor. Bino Banganga-Nzambe, boyoka ! Bino bana ya Isalaele, bofungola matoyi ! Bino mpe bato oyo bosalaka na ndako ya mokonzi, boyoka ! Ezali bino nde bosengelaki kosambisa, kasi bozalaki lokola motambo, na Mitsipa, mpe lokola monyama batanda, na Tabori.
2 "The rebels have gone deep into slaughter, but I will discipline all of them. Batomboki batimolaki libulu ya mozindo ; mpe Ngai nakopesa bango nyonso etumbu.
3 I know Ephraim, and Israel is not hidden from me; for now, Ephraim, you have prostituted yourself, and Israel is defiled. Nayebi Efrayimi malamu penza ; mpe Isalaele azali ya kobombama te na miso na Ngai. Efrayimi, awa omipesaki na kindumba, Isalaele mobimba akomi mbindo mpo na yango.
4 "Their deeds will not let them return to their Father, for a spirit of prostitution is within them, and they do not know our Father. Misala na bango ezali kopekisa bango kozonga epai ya Nzambe na bango, mpo ete molimo ya kindumba evandi kati na mitema na bango, bazali koyeba Yawe te.
5 The pride of Israel testifies against him; Israel and Ephraim stumble in their sin; Judah also stumbles with them. Lolendo ya Isalaele ezali kofunda bango ; ezala bato ya Efrayimi to ya Isalaele bakokweya mpo na masumu na bango ; bato ya Yuda mpe bakokweya elongo na bango.
6 With their flocks and their herds they will go to seek our Father, but they will not find him; he has withdrawn from them. Tango bakokende koluka Yawe, elongo na bangombe mpe bameme na bango, bakomona Ye te, pamba te akabwanaki na bango.
7 They have dealt faithlessly with our Father, for they have borne illegitimate children. Now the new moon will devour them along with their fields. Bazali sembo te liboso ya Yawe, baboti bana makangu ; sik’oyo, bafeti na bango ya ebandeli ya sanza ekoboma bango nzela moko na bomengo na bango.
8 "Blow the horn in Gibeah, the trumpet in Ramah. Sound the battle cry at Beth-aven; look behind you, Benjamin! Bobeta kelelo, na Gibea, mpe liseke, kuna na Rama ! Bobeta lolaka ya bitumba na Beti-Aveni ! Oh Benjame, keba !
9 Ephraim will become a desolation in the day of punishment; among the tribes of Israel I make known what is sure. Efrayimi akobebisama na mokolo ya etumbu na ye. Nazali koloba makambo ya solo kati na bikolo ya Isalaele.
10 The princes of Judah have become like those who move a boundary stone; on them I will pour out my wrath like water. Bakambi ya Yuda bazali lokola bato oyo bapusaka bandelo. Nakopelisela bango kanda na Ngai lokola mpela.
11 Ephraim is oppressed, crushed in judgment, because he was intent on pursuing worthless idols. Efrayimi azali konyokwama, anyatami na etumbu, pamba te akangamaki na kolanda kaka banzambe ya bikeko.
12 So I am like a moth to Ephraim, and like dry rot to the house of Judah. Mpe Ngai, nakomi lokola nseka na miso ya Efrayimi, lokola eloko ya kopola na miso ya bato ya Yuda.
13 "Ephraim saw his own sickness, Judah saw his open sore; so Ephraim ran to Assyria, appealing to its great king. But that king can't cure you, or heal your festering wound. Tango Efrayimi amonaki bokono na ye, mpe Yuda amonaki bapota na ye, Efrayimi abalukaki na ngambo ya Asiri mpe atindaki sango epai ya mokonzi monene mpo na kozwa lisungi, kasi ye akokoka kobikisa mpe kosilisa bapota na yo te.
14 For I will be like a lion to Ephraim, and like a young lion to the house of Judah. I myself will tear and go away; I will carry off, and no one will rescue. Pamba te nakozala lokola nkosi liboso ya Efrayimi, mpe lokola mwana nkosi liboso ya Yuda. Nakokata-kata bango na biteni mpe nakokende, nakomema bango, mpe moto akobikisa bango akozala te.
15 I will go back again to my place, until they acknowledge their guilt and seek my face; in their distress they will earnestly seek me." Nakozonga epai na Ngai kino tango bakososola mabe na bango mpe bakoluka elongi na Ngai ; kati na pasi, bakoluka Ngai makasi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]