Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Hosea 5 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Kosambisama ya Isalaele

1Bino Banganga-Nzambe, boyoka !Bino bana ya Isalaele, bofungola matoyi !Bino mpe bato oyo bosalakana ndako ya mokonzi, boyoka !Ezali bino nde bosengelaki kosambisa,kasi bozalaki lokola motambo, na Mitsipa,mpe lokola monyama batanda, na Tabori.

2Batomboki batimolaki libulu ya mozindo ;mpe Ngai nakopesa bango nyonso etumbu.

3Nayebi Efrayimi malamu penza ;mpe Isalaele azali ya kobombama te na miso na Ngai.Efrayimi, awa omipesaki na kindumba,Isalaele mobimba akomi mbindo mpo na yango.

4Misala na bango ezali kopekisa bangokozonga epai ya Nzambe na bango,mpo ete molimo ya kindumba evandi kati na mitema na bango,bazali koyeba Yawe te.

5Lolendo ya Isalaele ezali kofunda bango ;ezala bato ya Efrayimi to ya Isalaelebakokweya mpo na masumu na bango ;bato ya Yuda mpe bakokweya elongo na bango.

6Tango bakokende koluka Yawe,elongo na bangombe mpe bameme na bango,bakomona Ye te,pamba te akabwanaki na bango.

7Bazali sembo te liboso ya Yawe,baboti bana makangu ;sik’oyo, bafeti na bango ya ebandeli ya sanzaekoboma bango nzela moko na bomengo na bango.

8Bobeta kelelo, na Gibea,mpe liseke, kuna na Rama !Bobeta lolaka ya bitumba na Beti-Aveni !Oh Benjame, keba !

9Efrayimi akobebisama na mokolo ya etumbu na ye.Nazali koloba makambo ya solokati na bikolo ya Isalaele.

10Bakambi ya Yuda bazali lokola bato oyo bapusaka bandelo.Nakopelisela bango kanda na Ngai lokola mpela.

11Efrayimi azali konyokwama,anyatami na etumbu,pamba te akangamaki na kolanda kaka banzambe ya bikeko.

12Mpe Ngai, nakomi lokola nseka na miso ya Efrayimi,lokola eloko ya kopola na miso ya bato ya Yuda.

13Tango Efrayimi amonaki bokono na ye,mpe Yuda amonaki bapota na ye,Efrayimi abalukaki na ngambo ya Asirimpe atindaki sango epai ya mokonzi monenempo na kozwa lisungi,kasi ye akokoka kobikisa mpe kosilisa bapota na yo te.

14Pamba te nakozala lokola nkosi liboso ya Efrayimi,mpe lokola mwana nkosi liboso ya Yuda.Nakokata-kata bango na biteni mpe nakokende,nakomema bango, mpe moto akobikisa bango akozala te.

15Nakozonga epai na Ngaikino tango bakososola mabe na bangompe bakoluka elongi na Ngai ;kati na pasi, bakoluka Ngai makasi.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]