Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Hosea 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Hear the word of our Father, children of Israel, for he has a case against the inhabitants of the land: there is no faithfulness, no covenant love, and no knowledge of him in the land. Bana ya Isalaele, boyoka Liloba na Yawe ! Pamba te Yawe azali kosamba na bino, bavandi ya mokili, mpo ete bosolo, bolingo mpe boyebi ya Nzambe ezali lisusu te kati na mokili ;
2 There is only swearing and lying, murder and stealing and adultery; they break all bounds, and bloodshed follows bloodshed. etikali kaka kolakelana mabe, lokuta, makambo ya somo, moyibi, kindumba, mobulu mpe kobomana se kobomana.
3 Therefore the land mourns, and all who live in it waste away, together with the wild animals and the birds in the sky; even the fish in the sea are swept away. Mpo na yango, mokili ekokoma na mawa, bavandi na yango nyonso bakolemba nzoto, nyama ya zamba, ndeke ya likolo mpe mbisi ya ebale monene ekokufa.
4 Yet let no one accuse, let no one lay blame, for your people are like those who quarrel with the priest. Kasi tika ete moto moko te amilongisa to apamela moninga na ye, pamba te bato na yo bazali lokola bato oyo batiaka tembe na Banganga-Nzambe !
5 You stumble by day, and the prophet stumbles with you by night; and I will destroy your mother. Bokobeta mabaku, na moyi makasi ; basakoli mpe bakobeta mabaku elongo na bino, na butu, mpe nakobebisa mama na bino.
6 My people are destroyed for lack of knowledge. Because you have rejected knowledge, I reject you as my priest; because you have forgotten the law of your Father, I also will forget your children. Bato na Ngai bakobebisama mpo ete bazangi boyebi. Lokola bobwaki boyebi, Ngai mpe nakobwaka bino mpe nakolongola bino na bonganga-Nzambe na Ngai. Lokola bobosani Mobeko ya Nzambe na bino, Ngai mpe nakobosana bana na bino.
7 The more they increased, the more they sinned against me; I will turn their glory into shame. Ndenge Banganga-Nzambe bakomaki ebele, ndenge wana mpe basalaki masumu na miso na Ngai. Nakobongola nkembo na bango soni.
8 They feed on the sin of my people and set their hearts on their wrongdoing. Banganga-Nzambe baliaka na sima ya masumu ya bato na Ngai mpe basepelaka ete bato basala kaka mabe.
9 So it will be: like people, like priest. I will punish them for their ways and repay them for their deeds. Makambo oyo ekokomela bato yango ekokomela mpe Banganga-Nzambe : nakopesa bango nyonso etumbu nzela moko mpo na etamboli na bango mpe nakofuta bango kolanda misala na bango.
10 They will eat but not be satisfied; they will give themselves to prostitution but not multiply, because they have forsaken our Father and abandoned his ways. Bakolia, kasi bakotonda te ; bakosala kindumba, kasi bakobotana te ; pamba te basundolaki Yawe
11 Prostitution, wine, and new wine take away good sense. mpo na komipesa na kindumba, na masanga ya vino ya kala mpe ya sika oyo elongolaka bato bososoli.
12 My people consult a piece of wood, and their staff gives them oracles; for a spirit of prostitution has led them astray, and they have played the prostitute, forsaking their Father. Bato na Ngai bakomi kotuna toli epai ya nzambe ya ekeko oyo basala na nzete, mpe eteni ya nzete ezali koyanola bango. Molimo moko ya kindumba ezali kopengwisa bango, bakomi kosala kindumba mosika na Nzambe na bango,
13 They sacrifice on the mountaintops and burn offerings on the hills, under oak, poplar, and terebinth, because their shade is pleasant. So your daughters turn to prostitution and your brides to adultery. kobonza bambeka na likolo ya bangomba milayi, kotumba ansa lokola mbeka ya malasi na likolo ya bangomba mikuse, na se ya banzete minene oyo epesaka pio ya kitoko lokola sheni, pepiliye mpe terebente ! Mpo na yango, bana na bino ya basi bakosala kindumba, mpe basi ya bana na bino bakosala ekobo.
14 I will not punish your daughters when they turn to prostitution, nor your brides when they commit adultery; for the men themselves go off with prostitutes and offer sacrifices with the temple prostitutes—a people without understanding comes to ruin. Nakopesa etumbu te : ezala na bana na bino ya basi mpo na kindumba na bango to na basi ya bana na bino mpo na ekobo na bango ; pamba te bango moko mibali babimaka na basi ya ndumba mpe babonzaka mbeka elongo na bandumba ya tempelo. Bato bazangi bososoli basukaka se na libebi !
15 Though you, Israel, play the prostitute, let Judah not become guilty. Do not go to Gilgal; do not go up to Beth-aven; and do not swear, 'As surely as our Father lives.' Ata soki yo, Isalaele, osali ekobo, tika ete Yuda amikweyisa te ! Kokende na Giligali te, komata na Beti-Aveni te mpe kolapa ndayi te na koloba : « Na Kombo na Yawe ! »
16 Israel is stubborn, like a stubborn heifer. Can our Father now pasture them like a lamb in an open meadow? Mpo ete bato ya Isalaele bazali mito makasi lokola ngombe ya mwasi oyo etomboki, ndenge nini Yawe akoka koleisa bango lokola bana meme kati na bilanga minene ?
17 Ephraim is joined to idols; leave him alone. Efrayimi asangani na banzambe ya bikeko : tika ye akoba bongo !
18 When their drink is gone, they give themselves to prostitution; their rulers dearly love disgrace. Soki kaka asilisaka komela vino, amipesaka na kindumba ; bakambi na yango balingaka makambo oyo eyokisaka bango soni.
19 A wind has wrapped them in its wings, and they will be ashamed because of their altars. Mopepe moko ya makasi ekomema bango, mpe bakoyoka soni mpo na bambeka na bango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]