Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Zephaniah 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Gather together, gather yourselves, you shameless nation, Oh ekolo oyo eyokaka soni te, bosangana nanu bino nyonso mpe bokanisa malamu
2 before the decree gives birth—the day passes like chaff—before the burning anger of our Father comes upon you, before the day of our Father's anger comes upon you. liboso ete mokolo oyo ekatama mpo na kosambisama ekoka, liboso ete mokolo yango eleka lokola matiti ya loso oyo mopepe ememi, mpe liboso ete kanda mpe kotomboka ya Yawe ekomela bino !
3 Seek our Father, all you humble of the land, who carry out his justice; seek righteousness, seek humility. Perhaps you will be hidden on the day of our Father's anger. Boluka Yawe, bino bato nyonso ya komikitisa kati na mokili, bino oyo bokokisaka mitindo na Ye ! Boluka kotambola na bosembo mpe na komikitisa ! Tango mosusu bokobika na mokolo ya kanda ya Yawe.
4 For Gaza will be abandoned, and Ashkelon a desolation; Ashdod will be driven out at noon, and Ekron uprooted. Bakosundola engumba Gaza, bongo engumba Ashikeloni ekobebisama ; bakobengana bato ya engumba Asidodi na makasi mpe bakopikola engumba Ekroni.
5 Woe to you who live by the sea, nation of the Cherethites! The word of our Father is against you, Canaan, land of the Philistines: "I will destroy you until no inhabitant is left." Mawa na bino bavandi ya etuka oyo ezali pembeni ya ebale monene, bino bato ya Kereti ! Pamba te Liloba na Yawe etelemeli bino : « Kanana, mokili ya bato ya Filisitia, nakobebisa yo, mpe moto ata moko te akotikala kati na yo. »
6 And the seacoast will become pastures, with meadows for shepherds and folds for flocks. Etuka oyo ezali pembeni ya ebale monene, epai wapi bato ya Kreti bavandaka, ekokoma esika ya babateli bibwele mpe lopango ya kobokola bibwele.
7 The coast will belong to the remnant of the house of Judah; there they will graze, and in the houses of Ashkelon they will lie down at evening. For our Father will watch over them and restore their fortunes. Ekokoma etuka ya batikali ya libota ya Yuda ; bakokuta kuna bisika ya kobokola bibwele na bango. Pokwa nyonso, bakolala na bandako ya Ashikeloni, pamba te Yawe, Nzambe na bango, akobatela bango, akobongisa lisusu bomoi ya bato na bango, oyo bakowuta na bowumbu.
8 I have heard the taunts of Moab and the insults of the Ammonites, with which they taunted my people and boasted over their land. « Nayokaki bato ya Moabi kofinga bato na Ngai mpe ndenge bato ya Amoni bazalaki kotiola mpe koluka kobotola mabele na bango.
9 Therefore, as I live, declares the Father of heaven's armies, our Father of Israel, Moab will become like Sodom, and the Ammonites like Gomorrah—a land of nettles and salt pits, a waste forever. The remnant of my people will plunder them, and the survivors of my nation will possess them. Yango wana, na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, « Moabi ekokoma penza lokola Sodome, mpe bato ya Amoni bakokoma lokola Gomore ; ekokoma esika oyo ebotaka matiti mabe, esika ya mabulu ya mungwa, esika ebebisama mpo na libela. Batikali na Ngai bakobotola bango bomengo na makasi, mpe batikali ya ekolo na Ngai bakozwa mikili yango lokola libula. »
10 "This is what they will get for their pride, because they taunted and boasted against the people of the Father of heaven's armies. Wana nde lifuti oyo bakozwa mpo na lolendo na bango, pamba te bafingaki mpe batiolaki bato ya Yawe, Mokonzi ya mampinga.
11 Our Father will be fearsome to them, for he will starve all the gods of the earth; and all the coastlands of the nations will bow down to him, each from its own place." Yawe akoyokisa bango somo tango akobebisa banzambe ya bikeko nyonso ya mabele. Bato ya bikolo nyonso bakogumbamela Ye na bisika nyonso, moto na moto na esika oyo akozala kati na mokili na ye.
12 You Cushites too will be slain by my sword. Bino mpe bato ya Kushi bokokufa na mopanga na ngai.
13 And he will stretch out his hand against the north and destroy Assyria, and he will make Nineveh a desolation, dry as the desert. Akosembola loboko na Ye mpo na kobundisa etuka ya nor, akobebisa Asiri akobebisa penza Ninive mobimba mpe akokawusa yango lokola esobe.
14 Flocks will lie down in her midst, all kinds of wild animals; both the owl and the hedgehog will lodge on her pillar tops. A voice will sing in the windows, rubble on the threshold, for the cedar work is laid bare. Ekokoma esika oyo bitonga mpe banyama ya ndenge na ndenge ekokoma kolala. Esulungutu mpe kombekombe ekokoma kolekisa butu na yango na basonge ya bandako na yango. Kolela na yango ekoyokana kino na maninisa, libebi na libebi nde ekomonana na bikotelo ya bandako, mpe mabaya ya banzete ya sedele ekotikala polele.
15 This is the carefree city that lived securely, that said in her heart, "I am, and there is no one besides me." What a ruin she has become, a lair for wild animals! Everyone who passes by her hisses and shakes his fist. Tala ndenge ekosuka, engumba oyo ya bisengo, oyo ezalaki na kimia koleka mpe ezalaki komilobela : « Ezali nde ngai, mosusu azali te soki ngai te. » Ndenge nini engumba oyo ebebisami, ndenge nini ekomi penza ndako ya banyama ! Bato nyonso oyo bakolekela wana bakobeta piololo mpe koningisa mito.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]