Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Zephaniah 2 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Kobengama ya bato oyo batalelaka Yawe

1Oh ekolo oyo eyokaka soni te,bosangana nanu bino nyonsompe bokanisa malamu

2liboso ete mokolo oyo ekatamampo na kosambisama ekoka,liboso ete mokolo yango eleka lokola matiti ya losooyo mopepe ememi,mpe liboso ete kanda mpe kotomboka ya Yawe ekomela bino !

3Boluka Yawe,bino bato nyonso ya komikitisa kati na mokili,bino oyo bokokisaka mitindo na Ye !Boluka kotambola na bosembo mpe na komikitisa !Tango mosusu bokobikana mokolo ya kanda ya Yawe.

Etumbu ya Filisitia

4Bakosundola engumba Gaza,bongo engumba Ashikeloni ekobebisama ;bakobengana bato ya engumba Asidodi na makasimpe bakopikola engumba Ekroni.

5Mawa na bino bavandi ya etukaoyo ezali pembeni ya ebale monene,bino bato ya Kereti !Pamba te Liloba na Yawe etelemeli bino :« Kanana, mokili ya bato ya Filisitia,nakobebisa yo,mpe moto ata moko te akotikala kati na yo. »

6Etuka oyo ezali pembeni ya ebale monene,epai wapi bato ya Kreti bavandaka,ekokoma esika ya babateli bibwelempe lopango ya kobokola bibwele.

7Ekokoma etuka ya batikali ya libota ya Yuda ;bakokuta kuna bisika ya kobokola bibwele na bango.Pokwa nyonso, bakolala na bandako ya Ashikeloni,pamba te Yawe, Nzambe na bango, akobatela bango,akobongisa lisusu bomoi ya bato na bango,oyo bakowuta na bowumbu.

Etumbu ya mokili ya Moabi mpe ya Amoni

8« Nayokaki bato ya Moabi kofinga bato na Ngaimpe ndenge bato ya Amoni bazalaki kotiolampe koluka kobotola mabele na bango.

9Yango wana, na Kombo na Ngai, »elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele,« Moabi ekokoma penza lokola Sodome,mpe bato ya Amoni bakokoma lokola Gomore ;ekokoma esika oyo ebotaka matiti mabe,esika ya mabulu ya mungwa,esika ebebisama mpo na libela.Batikali na Ngai bakobotola bango bomengo na makasi,mpe batikali ya ekolo na Ngai bakozwamikili yango lokola libula. »

10Wana nde lifuti oyo bakozwa mpo na lolendo na bango, pamba te bafingaki mpe batiolaki bato ya Yawe, Mokonzi ya mampinga. 11Yawe akoyokisa bango somo tango akobebisa banzambe ya bikeko nyonso ya mabele. Bato ya bikolo nyonso bakogumbamela Ye na bisika nyonso, moto na moto na esika oyo akozala kati na mokili na ye.

Etumbu ya Kushi

12Bino mpe bato ya Kushibokokufa na mopanga na ngai.

Etumbu ya Asiri

13Akosembola loboko na Yempo na kobundisa etuka ya nor,akobebisa Asiriakobebisa penza Ninive mobimbampe akokawusa yango lokola esobe.

14Ekokoma esika oyo bitongampe banyama ya ndenge na ndenge ekokoma kolala.Esulungutu mpe kombekombe ekokoma kolekisabutu na yango na basonge ya bandako na yango.Kolela na yango ekoyokana kino na maninisa,libebi na libebi nde ekomonanana bikotelo ya bandako,mpe mabaya ya banzete ya sedele ekotikala polele.

15Tala ndenge ekosuka, engumba oyo ya bisengo,oyo ezalaki na kimia koleka mpe ezalaki komilobela :« Ezali nde ngai, mosusu azali te soki ngai te. »Ndenge nini engumba oyo ebebisami,ndenge nini ekomi penza ndako ya banyama !Bato nyonso oyo bakolekela wanabakobeta piololo mpe koningisa mito.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]