Etumbu ya engumba Yelusalemi
1Mawa na engumba ya batomboki,engumba ya makambo ya mbindo,mpe engumba oyo enyokolaka bato !
2Etosaka moto te,endimaka pamela te,etiaka elikya na Yawe te,epusanaka pene ya Nzambe na yango te.
3Bakalaka na yango bazali lokola bankosioyo ezali koganga ;bakambi na yango bazalilokola bambwa ya zamba oyo esalaka bokila na pokwa,bongo etikaka ata eloko moko te na tongo.
4Basakoli na yango bazalibato ya lolendo mpe ya lokuta.Banganga-Nzambe na yango babebisakaEsika ya bule mpe batosaka mibeko te.
5Kati na engumba yango,Yawe azali sembo, asalaka mabe te ;mokolo na mokolo, alakisaka bosembo na Yempe azangaka te kokokisa yango tongo na tongo.Nzokande, moto oyo atambolaka na bosembo teamonaka likambo ya soni te.
6Nabomi bato ya bikolo mosusu,bandako na bango ya makasi ebebisami.Nasali ete babalabala na bangoetikala lisusu na bato tempo ete moto moko te alekela lisusu wana.Bingumba na bango ebebisami,ata moto moko te atikali lisusu kuna.
7Namilobelaki boye na tina na engumba oyo :« Solo, okobanga Ngai mpe okondima pamela na Ngai ! »Boye bandako na yango ekobukana lisusu te,mpe nakotindela yango lisusu etumbu moko te.Kasi atako bongo, bakobaki kaka kosalamisala na bango ya mabe.
8Yango wana, « bozela Ngai, »elobi Yawe,« bozela Ngai na mokolo oyo nakoyampo na kosamba elongo na bino ;nazwaki mokano ya kosangisabato ya bikolo nyonso mpe ya mikili nyonsompo na kosopela bango kanda na Ngai,makasi nyonso penza ya kanda na Ngai :mokili mobimba ekozika na motoya nguya ya kanda na Ngai.
Litomba ya etumbu
9Boye nakopetola bibebu ya bato ya bikolompo ete bango nyonso bazala ya kokokampo na kobelela Kombo ya Yawempe kosalela Ye na motema mobimba.
10Longwa na likolo ya bibale ya Kushi,bato na Ngai, oyo bagumbamelaka Ngai ;bato na Ngai, oyo bapalangana bipai na bipai,bakomemela Ngai makabo.
11Na mokolo wana, oh bato na Ngai,bokoyokisama lisusu soni tempo na mabe nyonso oyo bosalaki Ngai,pamba te nakolongola batooyo bamimatisaka na lolendo kati na bino.Boye bokomitombola lisusu te na lolendona ngomba na Ngai ya bule.
12Kasi kati na bino, nakotika bato oyo bakelela,bato oyo batambolaka na komikitisa,bato oyo bakozwa ebombamelo kati na Kombo na Yawe.
13Batikali ya Isalaele bakosala lisusu mabe te,bakokosa lisusu teto lokuta ekozala lisusu te kati na minoko na bango.Bakolia mpe bakolala na kimia,mpe moto moko te akobangisa bango lisusu.
14Siona, mboka kitoko, yemba nzembo !Isalaele, ganga makasi !Yelusalemi, mboka kitoko, sepela ;mpe tika ete motema na yo etonda na esengo !
15Yawe alongoli etumbu na yompe akimisi banguna na yo.Yawe, Mokonzi ya Isalaele, azali elongo na yo ;kobanga lisusu pasi moko te.
16Na mokolo wana,bakoloba na Yelusalemi :‹ Oh Siona, kobanga te !Tika ete maboko na yo elemba te !
17Yawe, Nzambe na yo, azali elongo na yo,azali Elombe Mobikisi.Akosepela na yo makasimpe akopemisa yo, na bolingo na Ye ;akoyemba banzembo ya esengo na tina na yo. ›
18Lokola na mikolo ya bafeti oyo ekatama,nakolongola pasi kati na yompo ete ozala lisusu na soni te.
19Na tango wana, nakobeta bato nyonsooyo banyokolaki yo,nakosunga moto oyo atambolaka tengu-tengumpe nakosangisa bato oyo bapanzana bipai na bipai.Nakopesa bango lokumumpe nakosala ete sango na bangoepanzana na mikili nyonsoepai wapi basambwisaki bango.
20Na tango wana, nakosangisa bino,nakozongisa bino na mokili na bino.Nakopesa bino lokumumpe nakosala ete sango na bino epanzanakati na bato ya bikolo nyonso ya mokilitango, na miso na bino, nakozongisa bato na bino,oyo bakendeki na bowumbu, »elobi Yawe.