Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Zephaniah 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Woe to this rebellious, defiled city—the oppressor! Mawa na engumba ya batomboki, engumba ya makambo ya mbindo, mpe engumba oyo enyokolaka bato !
2 She listens to no voice; she accepts no correction. She does not trust in our Father; she does not draw near to her Father. Etosaka moto te, endimaka pamela te, etiaka elikya na Yawe te, epusanaka pene ya Nzambe na yango te.
3 Her officials within her are roaring lions; her judges are evening wolves that devour everything before morning. Bakalaka na yango bazali lokola bankosi oyo ezali koganga ; bakambi na yango bazali lokola bambwa ya zamba oyo esalaka bokila na pokwa, bongo etikaka ata eloko moko te na tongo.
4 Her prophets are reckless, treacherous men; her priests profane what is holy and twist the law. Basakoli na yango bazali bato ya lolendo mpe ya lokuta. Banganga-Nzambe na yango babebisaka Esika ya bule mpe batosaka mibeko te.
5 Our Father in her midst is righteous; he does no wrong. Morning by morning he brings his justice to light; it never fails. But the unjust knows no shame. Kati na engumba yango, Yawe azali sembo, asalaka mabe te ; mokolo na mokolo, alakisaka bosembo na Ye mpe azangaka te kokokisa yango tongo na tongo. Nzokande, moto oyo atambolaka na bosembo te amonaka likambo ya soni te.
6 "I have cut off nations; their corner towers are desolate. I have laid waste their streets so that no one passes through; their cities are ruined, with no one left—no inhabitant at all." Nabomi bato ya bikolo mosusu, bandako na bango ya makasi ebebisami. Nasali ete babalabala na bango etikala lisusu na bato te mpo ete moto moko te alekela lisusu wana. Bingumba na bango ebebisami, ata moto moko te atikali lisusu kuna.
7 I said, 'Surely you will fear me; you will accept correction,' so that her dwelling would not be cut off according to all that I had appointed against her. But still they rose early to corrupt all their deeds. Namilobelaki boye na tina na engumba oyo : « Solo, okobanga Ngai mpe okondima pamela na Ngai ! » Boye bandako na yango ekobukana lisusu te, mpe nakotindela yango lisusu etumbu moko te. Kasi atako bongo, bakobaki kaka kosala misala na bango ya mabe.
8 "So wait for me,' our Father declares, 'until the day I rise as a witness. For my decision is to gather the nations, to assemble kingdoms, to pour my indignation on them, all my burning anger; for the fire of my jealousy will consume the whole earth.' Yango wana, « bozela Ngai, » elobi Yawe, « bozela Ngai na mokolo oyo nakoya mpo na kosamba elongo na bino ; nazwaki mokano ya kosangisa bato ya bikolo nyonso mpe ya mikili nyonso mpo na kosopela bango kanda na Ngai, makasi nyonso penza ya kanda na Ngai : mokili mobimba ekozika na moto ya nguya ya kanda na Ngai.
9 "For then I will give the peoples purified lips, that they may all call upon my name and serve me shoulder to shoulder. Boye nakopetola bibebu ya bato ya bikolo mpo ete bango nyonso bazala ya kokoka mpo na kobelela Kombo ya Yawe mpe kosalela Ye na motema mobimba.
10 From beyond the rivers of Cush my worshipers, my scattered children, will bring my offering. Longwa na likolo ya bibale ya Kushi, bato na Ngai, oyo bagumbamelaka Ngai ; bato na Ngai, oyo bapalangana bipai na bipai, bakomemela Ngai makabo.
11 On that day you will not be ashamed of all the deeds by which you rebelled against me; for then I will remove from your midst your proud and boastful ones, and never again will you be arrogant on my holy mountain. Na mokolo wana, oh bato na Ngai, bokoyokisama lisusu soni te mpo na mabe nyonso oyo bosalaki Ngai, pamba te nakolongola bato oyo bamimatisaka na lolendo kati na bino. Boye bokomitombola lisusu te na lolendo na ngomba na Ngai ya bule.
12 But I will leave in your midst a people humble and lowly, and they will take refuge in my name. Kasi kati na bino, nakotika bato oyo bakelela, bato oyo batambolaka na komikitisa, bato oyo bakozwa ebombamelo kati na Kombo na Yawe.
13 The remnant of Israel will do no wrong and speak no lies, and no deceitful tongue will be found in their mouths. For they will graze and lie down, and no one will make them afraid." Batikali ya Isalaele bakosala lisusu mabe te, bakokosa lisusu te to lokuta ekozala lisusu te kati na minoko na bango. Bakolia mpe bakolala na kimia, mpe moto moko te akobangisa bango lisusu.
14 Sing aloud, daughter of Zion; shout, Israel! Rejoice and shout for joy with all your heart, daughter of Jerusalem! Siona, mboka kitoko, yemba nzembo ! Isalaele, ganga makasi ! Yelusalemi, mboka kitoko, sepela ; mpe tika ete motema na yo etonda na esengo !
15 Our Father has taken away the judgments against you; he has cleared away your enemy. The King of Israel, our Father, is in your midst; never again will you fear harm. Yawe alongoli etumbu na yo mpe akimisi banguna na yo. Yawe, Mokonzi ya Isalaele, azali elongo na yo ; kobanga lisusu pasi moko te.
16 On that day it will be said to Jerusalem: "Do not fear, O Zion; do not let your hands grow weak. Na mokolo wana, bakoloba na Yelusalemi : ‹ Oh Siona, kobanga te ! Tika ete maboko na yo elemba te !
17 Your Father is in your midst, a mighty warrior who saves. He will rejoice over you with gladness; he will quiet you by his love; he will exult over you with loud singing." Yawe, Nzambe na yo, azali elongo na yo, azali Elombe Mobikisi. Akosepela na yo makasi mpe akopemisa yo, na bolingo na Ye ; akoyemba banzembo ya esengo na tina na yo. ›
18 I will gather those of yours who mourn—those kept away from the appointed feasts—for they have been a reproach and a burden upon Jerusalem. Lokola na mikolo ya bafeti oyo ekatama, nakolongola pasi kati na yo mpo ete ozala lisusu na soni te.
19 At that time I will deal with all who oppress you. I will save the lame and gather the outcast, and I will turn their shame into praise and renown in all the earth. Na tango wana, nakobeta bato nyonso oyo banyokolaki yo, nakosunga moto oyo atambolaka tengu-tengu mpe nakosangisa bato oyo bapanzana bipai na bipai. Nakopesa bango lokumu mpe nakosala ete sango na bango epanzana na mikili nyonso epai wapi basambwisaki bango.
20 At that time I will bring you home; at that time I will gather you together. For I will make you renowned and praised among all the peoples of the earth, when I restore your fortunes before your very eyes, says our Father. Na tango wana, nakosangisa bino, nakozongisa bino na mokili na bino. Nakopesa bino lokumu mpe nakosala ete sango na bino epanzana kati na bato ya bikolo nyonso ya mokili tango, na miso na bino, nakozongisa bato na bino, oyo bakendeki na bowumbu, » elobi Yawe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]