Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Haggai 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 In King Darius's second year, in the sixth month, on the first day, the word of our Father came through Haggai the prophet to Zerubbabel son of Shealtiel, governor of Judah, and to Joshua son of Jehozadak, the high priest: Na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, na mokolo ya liboso ya sanza ya motoba, Yawe alobaki na nzela ya Mosakoli Aje liloba oyo epai ya Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, moyangeli ya Yuda ; epai ya Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe :
2 This is what the Father of heaven's armies says: "These people say it isn't yet time to rebuild the house of our Father." « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Bato oyo bazali koloba ete tango ekoki nanu te mpo na kotonga Tempelo ya Yawe. › »
3 Then the word of our Father came through Haggai the prophet: Nzokande, Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Aje :
4 "Should you be living in your paneled houses while this house lies in ruins?" « Boni, bokanisi ete ezali mpo na bino tango ya kovanda na bandako ya kitoko wana Tempelo ezali ya kobeba ? »
5 So then, this is what the Father of heaven's armies says: "Consider carefully how you have lived. Sik’oyo, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokanisa nanu malamu makambo nyonso oyo ezali kokomela bino.
6 You have sown much, but harvested little. You eat, but never have enough. You drink, but never have your fill. You put on clothes, but no one keeps warm. And the one who earns wages earns them only to put them into a purse with holes." Bozali kolona milona ebele, kasi bozali kobuka bambuma moke kaka, bozali kolia kasi bozali kotonda te, bozali komela kasi bozali kosilisa posa na bino te, bozali kolata bilamba kasi malili ezali kosila te, mpe lifuti ya mosali ezali kokota na libenga etoboka. »
7 This is what the Father of heaven's armies says: "Consider carefully how you have lived. Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokanisa nanu malamu makambo oyo ezali kokomela bino.
8 Go up into the hills, bring down timber, and rebuild the house, so that I may take pleasure in it and be honored," says our Father. Bokende na likolo ya bangomba, bokata mpe boya na banzete mpo na kotonga Tempelo, bongo nakosepela mpe nakozwa lokumu, » elobi Yawe.
9 "You expected much, but it amounted to so little. What you brought home, I blew away. Why?" declares the Father of heaven's armies. "Because of my house, which still lies in ruins, while each of you is busy with his own house. « Tala, bokanisaki kobuka bambuma ebele kasi bobuki kaka bambuma moke ; mpe tango bomemi yango na bandako na bino, nafuli yango mopepe. Mpo na nini boye, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ? « Ezali mpo na Ndako na Ngai, oyo ezali ya kobeba, na tango oyo moto na moto azali komipesa na misala ya ndako na ye moko.
10 Therefore, because of you the heavens have withheld their dew, and the earth has withheld its produce. Yango wana, likolo na bino, Lola ekangi mvula, mpe mabele eboyi kobota bambuma.
11 I called for a drought on the fields and the hills, on the grain, the new wine, the olive oil, on whatever the ground produces, on people and livestock, and on all the labor of your hands." Nabengaki bokawuki na bilanga, na bangomba, na ble, na vino, na mafuta, na mbuma nyonso ya mabele, na bato, na bibwele mpe na mbuma nyonso ya mosala na bino. »
12 Then Zerubbabel son of Shealtiel, Joshua son of Jehozadak the high priest, and all the remnant of the people obeyed our Father's voice and the words of Haggai the prophet, since our Father had sent Haggai; and the people feared before our Father. Boye Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli ; Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; mpe bato nyonso oyo batikalaki batosaki mongongo ya Yawe, Nzambe na bango, mpe maloba ya mosakoli Aje kolanda ndenge Yawe, Nzambe na bango, atindaki ye. Mpe bato nyonso bakomaki kobanga Yawe.
13 Then Haggai, our Father's messenger, gave the people this message: "I am with you, declares our Father." Bongo Aje, momemi sango ya Yawe, asakolaki epai ya bato maloba oyo na Kombo na Yawe : « Nazali elongo na bino, » elobi Yawe.
14 So our Father stirred the spirit of Zerubbabel son of Shealtiel, governor of Judah, the spirit of Joshua son of Jehozadak the high priest, and the spirit of all the remnant of the people. They came and worked on the house of the Father of heaven's armies, Mpe Yawe alendisaki Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, moyangeli ya Yuda ; mpe Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe, elongo na bato nyonso oyo batikalaki. Bayaki mpe bamikotisaki na mosala ya kotonga Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe na bango,
15 on the twenty-fourth day of the sixth month in the second year of Darius the king. na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya motoba, na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]