Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Haggai 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 In the seventh month, on the twenty-first day, the word of our Father came through Haggai the prophet: Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Aje, na mokolo ya tuku mibale na moko ya sanza ya sambo :
2 "Speak now to Zerubbabel son of Shealtiel, governor of Judah, to Joshua son of Jehozadak, high priest, and to the rest of the people: « Loba na Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, moyangeli ya Yuda ; na Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe na bato nyonso oyo batikali :
3 Who among you is left? Who here saw this house in its former glory? How does it look now? Doesn't it seem like nothing to you?' ‹ Kati na bino oyo bozali na bomoi, nani amonaki Ndako oyo kati na nkembo na yango ya liboso ? Bongo sik’oyo, bozali komona yango ndenge nini ? Boni, ezali te komonana na miso na bino lokola eloko ya pamba ?
4 Yet now be strong, Zerubbabel, declares the Father; be strong, Joshua son of Jehozadak, the high priest; and be strong, all you people of the land, declares the Father, and work, for I am with you, declares the Father of heaven's armies. Kasi sik’oyo, Zorobabeli, zala makasi, › elobi Yawe. ‹ Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe, zala makasi. Bino nyonso bato ya ekolo, bozala makasi, › elobi Yawe, ‹ bosala mosala, pamba te nazali elongo na bino, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
5 Just as I promised when you came out of Egypt, my Spirit remains among you; do not be afraid. ‹ Kolanda mokano oyo nazwaki mpo na bino tango bobimaki na Ejipito, Molimo na Ngai azali kati na bino. Bobanga te. ›
6 This is what the Father of heaven's armies says: Once more, in a little while, I will shake the heavens, the earth, the sea, and the dry land. Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Na mwa tango moke, nakoningisa lisusu Likolo mpe mokili, ebale monene mpe mabele ;
7 And I will shake all the nations, and what all nations most desire will come, and I will fill this house with glory, says the Father of heaven's armies. nakoningisa bato ya bikolo nyonso, bomengo ya bikolo nyonso ekoya na esika oyo, mpe nakotondisa Ndako oyo na nkembo, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
8 The silver is mine and the gold is mine, declares the Father of heaven's armies. ‹ Wolo mpe palata ezali ya Ngai, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
9 The final glory of this house will surpass the first, says the Father of heaven's armies; and in this place I will give peace, declares the Father of heaven's armies." ‹ Nkembo ya Ndako ya sika ekozala monene koleka nkembo ya Ndako ya kala, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, ‹ mpe nakotia kimia na esika oyo, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. »
10 On the ninth month's twenty-fourth day, Darius's second year, our Father's word came to Haggai the prophet: Na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, Yawe alobaki na mosakoli Aje, na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya libwa :
11 This is what the Father of heaven's armies says: Ask the priests for a ruling: « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Tuna Banganga-Nzambe makambo oyo osengeli kosala kolanda mobeko :
12 If a man carries holy meat in the fold of his garment and with it touches bread, stew, wine, oil, or any food, does it become holy? The priests answered, No. — Soki moto moko amemi na songe ya elamba mosuni oyo ebulisama, mpe songe yango etuti lipa to ndunda to vino to mafuta to bilei mosusu, boni, ekokoma bule ? › » Banganga-Nzambe bazongisaki : — Te, ekokoma bule te !
13 Haggai asked, If someone unclean from a dead body touches any of these, does it become unclean? Yes, it becomes unclean, the priests answered. Mosakoli Aje alobaki : — Soki moto oyo akomaki mbindo mpo ete asimbaki ebembe asimbi eloko moko kati na biloko wana, boni, eloko yango ekokoma mbindo ? Banganga-Nzambe bazongisaki : — Iyo, ekokoma mbindo.
14 Then Haggai said: So it is with this people and this nation before me, declares the Father; so with all they make, and what they offer there is unclean. Mosakoli Aje alobaki lisusu : « Bato oyo mpe ekolo oyo bazali nde ndenge wana na miso na Ngai, » elobi Yawe, « misala nyonso oyo basalaka mpe biloko nyonso oyo babonzelaka Ngai ezalaka ya mbindo.
15 "Now consider carefully from this day on: before stone was laid on stone in our Father's temple. Mpe sik’oyo, kobanda lelo, botala malamu makambo oyo ekoya liboso ete libanga moko etiama na likolo ya libanga mosusu kati na Tempelo ya Yawe.
16 How did you fare? Coming to a grain heap for twenty, there were ten; to the wine vat to draw fifty, there were twenty. Tango moto moko azalaki koya mpo na kozwa bikolo tuku mibale ya ble na ebombelo, azalaki kokuta kaka bikolo zomi ; tango moto moko azalaki kokende na ekamolelo masanga ya vino mpo na kozwa bambeki tuku mitano ya vino, azalaki kaka kokuta bambeki tuku mibale.
17 I struck you and all your work with blight, mildew, and hail, but you did not turn to me, declares the Father. Napesaki bino etumbu, tango nabebisaki misala na bino nyonso ya maboko, tango natindelaki yango bokono ya ndenge na ndenge mpe tango nanokisaki mvula ya mabanga. Kasi atako bongo, bozongaki epai na Ngai te, » elobi Yawe.
18 Think carefully from this day on—from the twenty-fourth day of the ninth month, the day our Father's temple foundation was laid—think carefully: « Kobanda lelo, mokolo ya tuku mibale ya sanza ya libwa, botala malamu miboko ya Tempelo ya Yawe, oyo batiaki ; botala malamu penza makambo oyo ekoleka.
19 Is seed still in the barn? The vine, fig, pomegranate, and olive tree have not yet borne fruit. But from this day on I will bless you." Boni, bibombelo na bino ezali lisusu na bambuma ? Kino na moyi ya lelo, ata elanga moko te ya vino, ya figi, ya grenade mpe ya olive esili kobota bambuma. Kasi kobanda lelo, nakopambola bino. »
20 The word of our Father came to Haggai a second time on the twenty-fourth of the month: Yawe alobaki, na mbala ya mibale, na mosakoli Aje, na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya libwa :
21 "Speak to Zerubbabel, governor of Judah: I am about to shake the heavens and the earth. « Loba na Zorobabeli, moyangeli ya Yuda, ete nakoningisa likolo mpe mabele,
22 I will overturn the thrones of kingdoms and destroy the power of the kingdoms of the nations. I will overturn chariots and their riders; horses and their riders will fall, each by the sword of his brother.' nakobalola bakiti ya bokonzi, nakosilisa nguya ya bokonzi ya mikili ya bapagano, nakokweyisa bashar mpe bato oyo batambolisaka yango ; bampunda ekokweya elongo na bato oyo batambolaka likolo na yango, bango na bango bakobomana na mopanga.
23 On that day, declares the Father of heaven's armies, I will take you, Zerubbabel son of Shealtiel, my servant, declares the Father, and make you like a signet ring, for I have chosen you, declares the Father of heaven's armies." Na mokolo wana, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « nakozwa yo Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, mosali na Ngai, mpe nakokomisa yo lokola kashe na Ngai, pamba te ezali yo nde Ngai napona, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]