Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Zephaniah 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The word of our Father came to Zephaniah son of Cushi, son of Gedaliah, son of Amariah, son of Hezekiah, when Josiah son of Amon ruled Judah. Na tango Joziasi, mwana mobali ya Amoni, azalaki mokonzi ya mokili ya Yuda, Yawe alobaki na Sofoni, mwana mobali ya Kushi, mwana mobali ya Gedalia, mwana mobali ya Amaria, mwana mobali ya Ezekiasi :
2 "I will utterly sweep away everything from the face of the earth,' declares our Father. « Nakosilisa kobebisa biloko nyonso oyo ezali kati na mokili, » elobi Yawe,
3 "I will sweep away man and beast; I will sweep away the birds of the sky and the fish of the sea, and the rubble of idols along with the wicked. I will cut off humanity from the face of the earth,' declares our Father. « solo, nakoboma ezala bato to banyama, ezala bandeke ya likolo to bambisi ya ebale ; nakolongola, na mokili, bato mabe mpe biloko oyo ebetisaka bato mabaku » elobi Yawe.
4 'I will stretch out my hand against Judah and against all who live in Jerusalem. I will cut off from this place every remnant of Baal, the name of the idolatrous priests along with the priests, « Nakosembola loboko na Ngai mpo na kopesa mokili ya Yuda mpe bavandi nyonso ya Yelusalemi etumbu ; nakosilisa koboma, na esika oyo, nyonso oyo etikali, ya losambo ya nzambe Bala elongo na bakombo ya banganga-nzambe ya bapagano, oyo basalelaka banzambe ya bikeko :
5 those who bow down on the rooftops to the starry host, those who bow down and swear by our Father and yet swear by Milcom, bato nyonso oyo bafukamaka na likolo ya bandako mpo na kosambela mampinga ya likolo, bato nyonso oyo bagumbamaka na kolapa ndayi na Kombo na Yawe mpe na kombo na nzambe Moloki,
6 and those who turn back from following our Father, who do not seek our Father or inquire of him." bato nyonso oyo bapesaka Yawe mokongo, oyo balukaka Ye te mpe batunaka Ye te.
7 Be silent before the Sovereign Father! For the day of our Father is near; he has prepared a sacrifice and consecrated his guests. Bovanda kimia liboso ya Nkolo Yawe, pamba te mokolo ya Yawe ekomi pene ! Yawe abongisi mbeka, abulisi babengami na Ye.
8 "On the day of our Father's sacrifice I will punish the officials and the king's sons and all who array themselves in foreign attire. Na mokolo ya mbeka ya Yawe, nakopesa etumbu epai ya bakambi, epai ya bana mibali ya mokonzi mpe epai ya bato nyonso oyo balataka bilamba ya bapaya.
9 On that day I will punish all who leap over the threshold, who fill their master's house with violence and deceit. Na mokolo wana, nakopesa etumbu epai ya bato nyonso oyo bapumbwaka ekotelo ya tempelo, bato oyo batondisaka tempelo ya banzambe na bango ya bikeko na makambo ya kanza mpe na lokuta.
10 On that day,' declares our Father, 'a cry will go up from the Fish Gate, a wail from the Second Quarter, and a loud crash from the hills. Na mokolo wana, » elobi Yawe, « koganga makasi ekoyokana wuta na Ekuke ya Bambisi, kolela ekoyokana wuta na Mboka ya sika mpe lokito monene wuta na bangomba mikuse.
11 Wail, you who live in the Mortar! For all the merchants are silenced; all who weigh out silver are cut off.'" Bino bavandi ya etuka Makiteshi, bolela, pamba te bato nyonso ya mombongo bakokufa, mpe bato nyonso oyo batekaka palata bakobebisama !
12 At that time I will search Jerusalem with lamps and punish the men who are settled like wine on its dregs, who say in their hearts, "God will do nothing—neither good nor harm. Na tango wana, nakoluka engumba Yelusalemi na nzela ya mwinda, nakopesa etumbu epai ya bato nyonso oyo bamimonaka ete bakoka mpe bamilobelaka : ‹ Yawe asalaka na Ye eloko te, ezala ya malamu to ya mabe. ›
13 Their wealth will be plundered and their houses laid waste. They will build houses but not live in them; they will plant vineyards but not drink their wine." Bakobotola bango bomengo na makasi mpe bakobuka bandako na bango ; bakotonga bandako, kasi bakotikala kovanda yango te ; bakosala bilanga ya vino, kasi bakotikala komela vino na yango te. »
14 The great day of our Father is near—near and coming fast. Listen! The day of our Father is bitter; there the mighty warrior cries out. Mokolo monene ya Yawe ekomi pene, solo ekomi pene mpe ezali koya noki penza. Boyoka ! Makelele ya mokolo na Yawe ekozala bololo ; ezala basoda ya mpiko, bakoganga mpo na koluka lisungi.
15 That day is a day of wrath, a day of distress and anguish, a day of ruin and devastation, a day of darkness and gloom, a day of clouds and thick darkness, Mokolo yango ekozala mokolo ya kanda makasi, mokolo ya pasi mpe ya somo, mokolo ya komitungisa mpe ya kobebisama, mokolo ya butu mpe ya molili makasi, mokolo ya mapata mpe mapata ya mwindo,
16 a day of trumpet blast and battle cry against the fortified cities and against the lofty corner towers. mokolo ya kobeta bakelelo mpe ya makelele ya bitumba mpo na kobundisa bingumba batonga makasi mpe bandako milayi oyo batonga makasi.
17 "I will bring such distress on people that they will grope about like the blind, because they have sinned against our Father. Their blood will be poured out like dust and their flesh like manure. Nakotindela bato pasi ya makasi : bakokoma kotambola lokola bato balangwe masanga, pamba te basalaki masumu liboso ya Yawe ; bakopanza makila na bango lokola putulu mpe bakobwaka misopo na bango lokola salite.
18 Neither their silver nor their gold will be able to save them on the day of our Father's wrath. In the fire of his jealousy the whole earth will be consumed, for he will bring a sudden end to everyone on earth." Na mokolo ya kanda na Yawe, ezala palata to wolo na bango ekobikisa bango te. Na moto ya zuwa na Ye, mokili mobimba ekozikisama, pamba te akosukisa na mbalakata bavandi nyonso ya mokili.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]