Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 After this Job opened his mouth and cursed the day of his birth. Sima na yango, Yobo afungolaki monoko na ye mpe alakelaki mokolo ya mbotama na ye mabe.
2 He said: Yobo alobaki :
3 "Let the day I was born perish, and the night that said, 'A boy is conceived.' « Tika ete mokolo ya mbotama na ngai, mpe butu oyo elobaki : ‹ Mwana mobali moko abotami, › ekufa !
4 That day—let it be darkness! May God above not seek it, nor let light shine upon it. Tika ete mokolo yango ebongwana molili ! Tika ete, wuta na likolo, Nzambe akanisa yango lisusu te ! Tika ete pole engengela yango lisusu te !
5 Let darkness and deep shadow claim it; let a cloud settle over it; let the blackness of the day terrify it. Tika ete molili mpe elilingi ya kufa ezingela yango ! Tika ete lipata ezipa yango, mpe molili ebangisa pole na yango !
6 That night—let thick darkness seize it; let it not rejoice among the days of the year, nor be counted among the months. Tika ete molili makasi ekotela butu yango, ete batanga yango lisusu te kati na mikolo ya mibu to kati na mikolo ya basanza !
7 Yes, let that night be barren; let no joyful cry come into it. Tika ete butu yango etikala ekomba, ete koganga moko te ya esengo eyokana na butu yango !
8 Let those who curse days curse it—those ready to rouse Leviathan. Tika ete bato oyo balakelaka mikolo mabe, bato oyo balamusaka bilima minene ya mayi, balakela yango mabe !
9 Let the stars of its dawn be dark; let it hope for light and find none, and never see the first rays of morning, Tika ete minzoto ya tongo na yango ekoma molili, ezela na pamba tongo oyo ekotana mpe emona kongenga ya tongo te.
10 because it did not shut the doors of my mother's womb, nor hide trouble from my eyes. Pamba te ekangelaki ngai te bikuke ya libumu ya mama na ngai mpo na kobombela miso na ngai pasi ya boye !
11 Why did I not die at birth, come from the womb and breathe my last? Mpo na nini namikufelaki te kati na libumu ya mama na ngai ? Mpo na nini nakataki motema te tango nabimaki na libumu ya mama na ngai ?
12 Why were there knees to receive me, or breasts for me to nurse? Mpo na nini mabolongo eyambaki ngai ? Mpo na nini mama amelisaki ngai mabele ?
13 For now I would be lying down in quiet; I would be asleep and at rest, Pamba te sik’oyo, nalingaki na ngai kolala na kimia, nalingaki na ngai kokufa mpe kopema
14 with kings and counselors of the earth who built ruins for themselves, elongo na bakonzi mpe bapesi toli ya mokili, oyo bamitongelaki malita na bango kasi lelo ebeba,
15 or with princes who had gold, who filled their houses with silver. elongo na bakambi oyo bazalaki na wolo mpe batondisa palata kati na bandako na bango.
16 Or why was I not a buried stillborn child, like infants who never saw the light? Mpo na nini babombaki ngai te na se ya mabele lokola zemi oyo esopani to lokola mwana oyo atikala komona te pole ya mokolo ?
17 There the wicked cease from raging, and there the weary are at rest. Kuna, bato mabe batikaka konyokola bato, bato oyo balembi bazwaka bopemi,
18 Together the captives are at ease; they no longer hear the slave driver's voice. bato ya boloko bazwaka kimia mpe bayokaka lisusu te mongongo ya mokengeli.
19 The small and the great are there alike, and the slave is free from his master. Ezala mobola to mozwi, bango mibale bazalaka kuna, mpe mowumbu akangolamaka na maboko ya nkolo na ye.
20 Why is light given to one in misery, and life to the bitter in soul, Mpo na nini pole epesamelaka bato ya pasi ? Mpo na nini bomoi epesamelaka moto oyo azali na pasi na motema ?
21 who long for death that does not come, and dig for it more than for hidden treasure, Bazelaka kufa, kasi eyaka te ; nzokande balukaka yango koleka bozwi oyo ebombama,
22 who leap for joy and are glad when they find the grave? balingaki kotonda na esengo mpe kosepela soki bamoni kunda !
23 Why is light given to a man whose way is hidden, whom God has hedged in? Mpo na nini bomoi epesamela moto oyo nzela na ye ebombama, moto oyo Nzambe azingela lokola lopango ?
24 For my sighing comes before my bread, and my groans pour out like water. Pamba te kolela ekomi bilei na ngai, bileli na ngai ezali kosopana lokola mayi.
25 For the thing I dreaded has come upon me, and what I feared has overtaken me. Makambo oyo nazalaki kobanga, yango nde ezali kokomela ngai ; oyo nazalaki koyokela somo, yango nde ezali kosalemela ngai.
26 I have no ease, no quiet, no rest—only turmoil." Nazangi kimia, motema na ngai ezali kokita te mpe nazangi bopemi ; kasi minyoko na minyoko kaka nde nazali na yango. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]