Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Again there came a day when the members of the heavenly court came to present themselves before our Father, and the accuser also came among them to present himself before him. Mokolo moko lisusu, ba-anjelu ya Nzambe bayaki komilakisa liboso ya Yawe. Satana mpe ayaki elongo na bango.
2 Our Father said to the accuser, "Where have you come from?" The accuser answered him, "From roaming the earth and walking back and forth across it." Yawe atunaki Satana : — Owuti wapi ? Satana azongiselaki Yawe : — Nawuti kotambola mpe koyengayenga na mokili.
3 Our Father said to the accuser, "Have you considered my servant Job? There is no one like him on the earth—a blameless and upright man, who fears God and turns away from evil. He still holds fast to his integrity, though you incited me against him to destroy him without cause." Yawe alobaki na Satana : — Boni, omoni Yobo, mosali na Ngai ? Ezali na moto moko te oyo azali lokola ye, kati na mokili : azali moyengebene mpe moto ya sembo, atosaka Nzambe mpe akimaka mabe. Azali kaka kotingama na bosembo na ye, atako otindikaki Ngai na pamba ete nasala ye mabe.
4 The accuser answered our Father, "Skin for skin! A man will give all that he has for his own life. Satana azongiselaki Yawe : — Poso mpo na poso : moto akoki kopesa biloko na ye nyonso mpo kaka abikisa bomoi na ye.
5 But stretch out your hand now and strike his bone and his flesh, and he will surely curse you to your face." Kasi sik’oyo, sembola kaka loboko na Yo, beta nzoto mpe mikuwa na ye ; okomona penza soki akolakela Yo mabe te na miso na Yo.
6 Our Father said to the accuser, "Very well, he is in your hand; only spare his life." Yawe alobaki na Satana : — Malamu ! Azali kati na maboko na yo, kasi kosimba bomoi na ye te !
7 So the accuser left our Father's presence and struck Job with painful sores from the soles of his feet to the top of his head. Boye, Satana alongwaki liboso ya Yawe mpe abwakelaki Yobo bokono ya mabe na poso ya nzoto, longwa na se ya matambe na ye kino na songe ya moto.
8 And Job took a piece of broken pottery to scrape himself as he sat among the ashes. Yobo akamataki eteni ya mbeki mpo na komikwanza na yango nzoto, mpe amivandisaki na putulu.
9 Then his wife said to him, "Do you still hold fast to your integrity? Curse God and die!" Mwasi na ye alobaki na ye : — Boni, ozali kaka kokoba na bosembo na yo ? Lakela Nzambe mabe mpe kufa na yo !
10 But he said to her, "You're talking like a foolish woman. Should we receive good from God and not receive trouble?" In all this Job did not sin with his lips. Yobo azongiselaki ye : — Ah ! Ozali koloba lokola moto ya liboma ! Boni, tondimaka kaka makambo ya malamu, epai ya Nzambe, kasi tondimaka makambo mabe te ?
11 When Job's three friends heard of all this trouble that had come upon him, they came, each from his own home—Eliphaz the Temanite, Bildad the Shuhite, and Zophar the Naamathite. They agreed to come and show him sympathy and comfort him. Tango baninga misato ya Yobo —Elifazi, moto ya Temani ; Bilidadi, moto ya Shuwa ; mpe Tsofari, moto ya Naama— bayokaki sango ya pasi nyonso oyo ekomelaki Yobo, batikaki bandako na bango mpe bayokanaki mpo na kokende kokabola pasi elongo na ye mpe kobondisa ye.
12 When they saw him from a distance, they did not recognize him. They raised their voices and wept, and each tore his robe and threw dust over his head toward heaven. Wuta na mosika, tango kaka bamonaki ye, bakokaki te koyeba ye lisusu ; boye, babandaki wana kolela makasi, bapasolaki banzambala na bango mpe bamibwakelaki putulu na mito.
13 They sat with him on the ground seven days and seven nights, and no one spoke a word to him, for they saw that his suffering was very great. Bamivandisaki na mabele elongo na Yobo mikolo sambo mpe butu sambo. Moko te akokaki koloba na ye ata liloba moko, pamba te bamonaki ndenge nini pasi na ye ezalaki makasi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]