Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 There was a man in the land of Uz whose name was Job, and that man was blameless and upright, one who feared God and turned away from evil. Moto moko azalaki kovanda na mokili ya Utsi, kombo na ye ezalaki « Yobo ; » azalaki kotambola na boyengebene mpe na bosembo, azalaki kotosa Nzambe mpe kokima mabe.
2 Seven sons and three daughters were born to him. Azalaki na bana mibali sambo, bana basi misato ;
3 He owned 7,000 sheep, 3,000 camels, 500 teams of oxen, and 500 female donkeys, with a very large household of servants, so that this man was the greatest of all the people of the east. mpe azalaki na etonga ya bameme nkoto sambo, bashamo nkoto misato, bangombe nkoto moko, ba-ane nkama mitano, mpe azalaki na basali ebele penza. Alekaki bato nyonso ya Este na lokumu.
4 His sons would go and hold a feast in the house of each one on his day, and they would send for their three sisters and invite them to eat and drink with them. Bana na ye ya mibali bazalaki na ezaleli ya kosangana kati na ndako ya moko kati na bango, mpo na kosala feti ; mpe, na feti yango, bazalaki kobengisa bandeko na bango ya basi mpo na kolia mpe komela elongo na bango.
5 When the days of feasting had run their course, Job would send for them and consecrate them, rising early in the morning to offer burnt offerings for each of them. For Job thought, "It may be that my children have sinned and cursed God in their hearts." This is what Job always did. Mpe soki mikolo ya feti esili, Yobo azalaki kobengisa bana na ye mpo na kopetola bango. Na tongo-tongo, azalaki kobonza mbeka ya kotumba mpo na moko na moko kati na bango ; pamba te azalaki komilobela : « Tango mosusu bana na ngai basali masumu mpe balakeli Nzambe mabe kati na mitema na bango. » Yobo azalaki kosala bongo tango nyonso.
6 Now there was a day when the members of the heavenly court came to present themselves before our Father, and Satan also came among them. Mokolo moko, ba-anjelu ya Nzambe bayaki komilakisa liboso ya Yawe. Satana mpe ayaki elongo na bango.
7 Our Father said to Satan, "Where have you come from?" Satan answered our Father, "From roaming the earth and walking back and forth across it." Yawe atunaki Satana : — Owuti wapi ? Satana azongiselaki Yawe : — Nawuti kotambola mpe koyengayenga na mokili.
8 Our Father said to Satan, "Have you considered my servant Job? There is no one like him on the earth—a blameless and upright man who fears God and turns away from evil." Yawe alobaki na Satana : — Boni, omoni Yobo, mosali na Ngai ? Ezali na moto moko te oyo azali lokola ye, kati na mokili : azali moyengebene mpe moto ya sembo, atosaka Nzambe mpe akimaka mabe.
9 Satan answered our Father, "Does Job fear God for nothing? Satana azongiselaki Yawe : — Okanisi ete ezali na pamba nde Yobo atosaka Nzambe ?
10 Have you not put a hedge around him and his household and everything he has, on every side? You have blessed the work of his hands, and his possessions have spread out across the land. Boni, otonga mir te zingazinga na ye mpo na kobatela ye, ndako na ye mpe biloko na ye nyonso ? Opambola misala ya maboko na ye, mpe bibwele na ye epanzana na mokili mobimba.
11 But stretch out your hand and strike everything he has, and surely he will curse you to your face." Kasi sik’oyo, sembola kaka loboko na Yo mpe beta biloko na ye nyonso ; okomona penza soki akolakela Yo mabe te na miso na Yo.
12 Our Father said to Satan, "Very well—everything he has is in your power. Only do not lay a hand on the man himself." So Satan went out from the presence of our Father. Yawe alobaki na Satana : — Malamu ! Biloko na ye nyonso ezali kati na maboko na yo ; kasi, kokitisa loboko na yo te na bomoi na ye ! Boye, Satana alongwaki liboso ya Yawe.
13 Now there was a day when Job's sons and daughters were eating and drinking wine in the house of their oldest brother, Mokolo moko, tango bana mibali mpe bana basi ya Yobo bazalaki kosala feti mpe komela masanga ya vino kati na ndako ya ndeko mobali na bango ya liboso,
14 and a messenger came to Job and said, "The oxen were plowing and the donkeys were grazing beside them, ntoma moko ayaki epai na Yobo mpo na koyebisa ye : « Bangombe ezalaki kobalola mabele ya bilanga, mpe ba-ane ezalaki kolia matiti pembeni wana ;
15 when the Sabeans attacked and carried them off, and they struck down the servants with the edge of the sword. I am the only one who escaped to tell you." bongo bato ya Saba bayei kokweyela yango mpe bakei na yango. Babomi basali na mopanga, mpe ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! »
16 While he was still speaking, another came and said, "The fire of God fell from heaven and burned up the sheep and the servants and consumed them. I am the only one who escaped to tell you." Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki : « Moto ya Nzambe ekweyi longwa na likolo mpe ezikisi bibwele mpe basali ! Ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! »
17 While he was still speaking, another came and said, "The Babylonians formed three raiding parties, swept down on the camels and carried them off, and they struck down the servants with the edge of the sword. I am the only one who escaped to tell you." Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki : « Bato ya Chalide basalaki masanga misato, bakweyeli bashamo na yo mpe bakei na yango. Babomi basali na mopanga, mpe ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! »
18 While he was still speaking, another came and said, "Your sons and daughters were eating and drinking wine in the house of their oldest brother, Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki : « Wana bana na yo ya mibali mpe ya basi bazalaki kosala feti mpe komela masanga ya vino kati na ndako ya ndeko mobali na bango ya liboso,
19 when suddenly a great wind swept in from across the wilderness and struck the four corners of the house. It collapsed on the young people, and they are dead. I am the only one who escaped to tell you." mopepe moko ya makasi ewutaki na ngambo mosusu ya esobe mpe eyaki kobeta basonge minei ya ndako. Ndako ekweyeli bango, mpe bango nyonso basili kokufa. Ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! »
20 Then Job arose, tore his robe, shaved his head, and fell to the ground and worshiped. Yobo atelemaki, apasolaki kazaka na ye, akokolaki suki ya moto na ye, akweyaki na mabele mpe afukamaki.
21 He said, "Naked I came from my mother's womb, and naked I will return. Our Father gave, and he has taken away; blessed be his name." Alobaki : « Nabimaki bolumbu, na libumu ya mama na ngai, mpe nakozonga bolumbu. Yawe apesaki, mpe Yawe asili kozwa ; tika ete Kombo na Ye ekumisama ! »
22 In all this Job did not sin or charge God with wrongdoing. Na makambo wana nyonso, Yobo atikalaki kosala lisumu te mpe atangaki pasi yango na moto ya Nzambe te.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]