Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then Eliphaz the Temanite answered: Elifazi, moto ya Temani, azwaki maloba mpe alobaki :
2 "If someone ventures a word with you, will you grow weary? Yet who can hold back from speaking? « Soki moto moko ameki koloba na yo ata liloba moko, boni, okotomboka mpo na yango te ? Kasi nani akoki penza kokanga motema mpe kozanga maloba ?
3 Look, you have instructed many, and you have strengthened weak hands. Kanisa nanu ndenge ozalaki koteya bato ebele, ndenge ozalaki kolendisa bato oyo balembaki !
4 Your words have lifted up the one stumbling, and you have made firm the buckling knees. Maloba na yo ezalaki kolendisa bato oyo bazalaki kotepatepa, mpe oyo mabolongo na bango ezalaki kolemba.
5 But now it comes to you, and you are weary; it touches you, and you are dismayed. Kasi awa sik’oyo pasi ekomeli yo, olembi na yo ! Awa pasi ebeti yo, okomi na yo koyoka somo !
6 Is not your fear of God your confidence, and the integrity of your ways your hope? Boni, kondima na yo epai ya Nzambe esengeli te kozala likonzi na yo, mpe bosembo na yo esengeli te kosimba elikya na yo ?
7 Remember now: who, being innocent, ever perished? Where were the upright ever destroyed? Kanisa nanu : Nani akotikala kokufa te mpo ete asalaka mabe te ? Esika nini bato ya sembo bakotikala kokufa te ?
8 As I have seen, those who plow wrongdoing and sow trouble reap the same. Kolanda makambo oyo ngai nasili komona, bato oyo basalaka mabe, mpe ba-oyo balonaka minyoko, babukaka mpe kaka mabe lokola mbuma ;
9 By the breath of God they perish, and by the blast of his anger they are consumed. bakufaka na mopepe ya Nzambe mpe basilaka na mopepe ya kanda na Ye.
10 The roar of the lion, the voice of the fierce lion, the teeth of the young lions—they are broken. Nkosi ekoki na yango koganga, mpe mwana ya nkosi ekoki kotia makelele ndenge elingi, kasi Nzambe abukaka minu ya nkosi.
11 The strong lion perishes for lack of prey, and the cubs of the lioness are scattered. Nkosi ekufaka mpo na kozanga nyama ya kolia, mpe bana ya nkosi ya mwasi epanzanaka.
12 Now a word was brought to me in secret; my ear caught a whisper of it. Liloba moko eyelaki ngai na nkuku, mpe matoyi na ngai eyokaki yango na se penza :
13 Amid troubling thoughts from visions of the night, when deep sleep falls on people, kati na bandoto ya butu, na tango bato bazwaka pongi makasi,
14 dread came upon me, and trembling, and it made all my bones shake. kobanga mpe somo ekangaki ngai mpe eningisaki mikuwa na ngai nyonso ;
15 A spirit glided past my face; the hair on my body stood on end. molimo moko elekaki liboso ya elongi na ngai lokola mopepe, mpe suki ya moto na ngai etelemaki.
16 It stood still, but I could not make out its shape. A form was before my eyes; there was silence, then I heard a voice: Molimo yango etelemaki wana, kasi nalongaki te kososola soki ezali nini ; elilingi yango etelemaki liboso ya miso na ngai, mpe nayokaki mongongo moko koloba na se penza :
17 'Can a mortal be righteous before God? Can a man be pure before his Maker? ‹ Boni, moto akoki solo koleka Nzambe na bosembo to akoki solo koleka Mokeli na ye na bule ?
18 Look, he puts no trust in his servants, and he charges his angels with error; Soki Nzambe atielaka basali na Ye motema te, soki kutu amonaka mabunga epai ya ba-anjelu na Ye,
19 how much more those who dwell in houses of clay, whose foundation is in the dust, who are crushed like a moth. mpo na nini te epai ya bato oyo basalema na mabele, ba-oyo bazali kaka putulu mpe bakoki kofinafina bango lokola mitsopi ?
20 Between morning and evening they are shattered; unnoticed, they perish forever. Kobanda na tongo kino na pokwa, bakataka-kataka bango na biteni ; bakufaka mpo na libela, mpe moto ata moko te alandelaka likambo na bango ;
21 Is not their tent-cord pulled up within them? They die without ever gaining wisdom.'" basinga oyo esimbaka bandako na bango ya kapo epikolamaka na mbalakata, mpe bakufaka ndenge wana bazanga bwanya. ›
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]