Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 5 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "Call out now—is there anyone who will answer you? To which of the holy ones will you turn? Ganga na yo, soki olingi ! Nani akoyanola yo ? Okotombokela mosantu nini ?
2 For anger kills the fool, and jealousy slays the simple. Kotomboka ebomaka moto oyo azangi mayele, zuwa ebomaka zoba.
3 I myself have seen a fool taking root, but suddenly I cursed his dwelling. Solo, namonaki zoba kozwa misisa ; kasi, mbala moko, nalakelaki ndako na ye mabe :
4 His children are far from safety; they are crushed in court, with no one to rescue them. ‹ Tika ete bana na ye ya mibali bazanga lisungi, balonga te na kosambisama mpe bazangela moto oyo akobundela bango !
5 The hungry eat his harvest, taking it even from among the thorns, and the thirsty pant after his wealth. Tika ete moto oyo azali na nzala asilisa mbuma ya elanga na ye, akamata yango kino kati na basende ; mpe tika ete moto ya lokoso asilisa bomengo na ye ! ›
6 For affliction does not come from the dust, nor does trouble sprout from the ground. Pamba te pasi ewutaka na putulu te, mpe minyoko ewutaka na mabele te ;
7 But man is born to trouble as surely as the sparks fly upward. moto abotamaka mpo na komona pasi, ndenge kaka mikalikali ebimaka mpo na kopanzana na likolo.
8 "As for me, I would seek God, and to God I would commit my cause. Kasi soki ezalaki ngai, nalingaki komimonisa liboso ya Nzambe, nalingaki kotalisa Ye likambo na ngai.
9 He does great things that cannot be fathomed, wonders without number. Nzambe asalaka makambo minene oyo bato bakokaka kososola te, mpe bikamwa oyo bato bakokaka kotanga te ;
10 He gives rain on the face of the earth and sends water on the fields. anokisaka mvula na mokili, mpe atindaka mayi na bilanga ;
11 He sets the lowly on high, and those who mourn are lifted to safety. atombolaka bato oyo babwakama, mpe apesaka esengo na bato oyo bazali kolela ;
12 He frustrates the plans of the crafty, so that their hands achieve no success. abebisaka mabongisi ya bato oyo bazalaka na mayele mabe, mpe maboko na bango ekokisaka te mikano na bango ;
13 He catches the wise in their craftiness, and the schemes of the cunning are swept away. akangaka bato ya bwanya kati na mitambo ya mayele mabe na bango, mpe abebisaka mabongisi ya bakosi.
14 They meet darkness in the daytime and grope at noon as if it were night. Molili eyelaka bango na moyi ; na moyi makasi, batambolaka na kotepatepa lokola na butu.
15 But he saves the needy from the sword of their mouth, and from the hand of the mighty. Nzambe abikisaka mobola na mopanga ya monoko na bango, akangolaka moto akelela na loboko ya moto ya makasi.
16 So the poor have hope, and injustice shuts her mouth. Boye, mobola asengeli kozala na elikya, mpe moto oyo atambolaka na bosembo te asengeli kokanga monoko.
17 "How blessed is the one whom God corrects; so do not despise the discipline of the Almighty. Esengo na moto oyo Nzambe apameli ! Kotiolaka te pamela ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
18 For he wounds, but he binds up; he shatters, but his hands heal. Pamba te azokisaka pota, kasi atiaka yango mpe kisi ; abetaka, kasi loboko na Ye ebikisaka.
19 From six troubles he will deliver you, and in seven no harm will touch you. Mbala motoba, akobikisa yo na pasi ; mpe na mbala ya sambo, mabe ekokomela yo te.
20 In famine he will redeem you from death, and in war from the power of the sword. Akokangola yo na kufa, na tango ya nzala makasi ; mpe akobikisa yo na nguya ya mopanga, kati na bitumba.
21 You will be hidden from the lash of the tongue, and you will not fear destruction when it comes. Okobatelama liboso ya fimbu ya lolemo, okobanga kobebisama te tango ekoya ;
22 At destruction and famine you will laugh, and you will not fear the wild beasts of the earth. okoseka kobebisama mpe nzala makasi, mpe okobanga te banyama ya mokili ;
23 For you will have a covenant with the stones of the field, and the wild beasts of the field will be at peace with you. pamba te okozala na boyokani elongo na mabanga ya bilanga, mpe banyama ya zamba ekozala na kimia elongo na yo.
24 You will know that your tent is secure; you will inspect your fold and find nothing missing. Okososola ete ndako na yo ezali na kimia ; tango okotala bibwele kati na lopango na yo, okomona ete ata moko te ezangi.
25 You will know that your children will be many, and your descendants like the grass of the earth. Okososola ete bana na yo bakozala ebele, mpe bakitani na yo, lokola matiti ya mabele.
26 You will come to your grave in ripe old age, like a sheaf gathered in its season. Okokita na kunda na kimobange makasi, ndenge batelemisaka maboke ya matiti na tango na yango.
27 "Yes, this we have searched out, and it is true. Hear it, and know it for yourself." Toyekolaki likambo yango malamu : ezali penza bongo. Boye, yoka yango mpe salela yango mpo na bolamu na yo ! »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]