Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 6 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then Job answered: Yobo azongisaki :
2 "If only my anguish could be weighed and all my calamity laid together on the scales! « Ah ! Soki ezalaki na makoki ya komeka kilo ya mawa na ngai, mpe ya kotia pasi na ngai nyonso na emekelo kilo,
3 It would surely outweigh the sand of the seas—that is why my words have been reckless. nakanisi ete elingaki koleka zelo ya bibale minene na kilo. Yango wana, maloba na ngai ezali koleka ndelo.
4 For the arrows of the Almighty are in me; my spirit drinks their poison; the terrors of God are arrayed against me. Makonga ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso etoboli ngai, mpe molimo na ngai ezali komela ngenge na yango ; Nzambe atelemeli ngai na kanda na Ye.
5 Does the wild donkey bray over its grass, or the ox bellow over its fodder? Boni, ane ya zamba elelaka soki ezali kolia matiti ? Ngombe ya mobali elelaka soki ezali kolia bilei na yango ?
6 Is tasteless food eaten without salt, or is there any flavor in the juice of the mallow? Boni, baliaka na mungwa te bilei oyo ezanga elengi ? Mayi oyo ezalaka kati na maki ezalaka elengi ?
7 My soul refuses to touch them; such things are loathsome food to me. Makambo oyo nazalaki koboya, yango nde ekomi bilei na ngai, atako ezali mabe.
8 Oh, if only my request would be granted, that God would give me what I long for, Ah ! Nani akoki kosala ete bosenga na ngai ekokisama, mpe ete Nzambe akokisela ngai likambo oyo nazali kozela !
9 that God would be willing to crush me, to let loose his hand and cut me off! Tika ete Nzambe aboma na Ye ngai, asembola loboko na Ye mpo na kokata ngai moto !
10 This would still be my comfort—I would leap for joy even in pain that shows no mercy—that I have not denied the words of the Holy One. Na boye nde nakoki kozwa kobondisama mpe esengo kati na pasi na ngai, oyo eleki ndelo, pamba te nawangani te maloba ya Ye oyo azali Mosantu.
11 What strength do I have, that I should keep hoping? And what end awaits me, that I should be patient? Makasi nini penza nazali na yango mpo ete nazala lisusu na elikya ? Mpo na nini nawumela lisusu kotala suka ya bomoi na ngai ?
12 Is my strength the strength of stones? Is my flesh made of bronze? Boni, nazali makasi lokola libanga ? Nzoto na ngai ezali ya ebende ?
13 Is there no help at all within me, now that sound wisdom is driven from me? Nazali na nguya ya komisunga awa natikali lisusu na makoki te ?
14 Anyone who withholds kindness from a friend forsakes the fear of the Almighty. Moto nyonso oyo azali na pasi asengeli na mawa ya baninga na ye, ata soki atiki kotosa Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
15 But my brothers are as treacherous as a desert streambed, like the channels of brooks that overflow and run dry, Kasi tala, bandeko na ngai bakosi ngai lokola moluka, lokola mayi ya moluka oyo ekawuki.
16 darkened by melting ice, swollen with the hidden snow, Tango mayi oyo ekomaka libanga mpo na malili, mpe mvula ya pembe, epanzanaka, ememaka mpela.
17 but in the dry season they vanish; when the heat comes, they disappear from their place. Kasi na tango ya molunge, mayi yango esilaka, mpe moluka yango ekawukaka nyonso mpo na molunge makasi.
18 Caravans turn aside from their paths; they go up into the wasteland and perish. Masanga ya bato oyo batambolaka na bampunda mpo na kokende na mobembo, ebongoli nzela ya kokende, ekeyi kokota kino kati na esobe mpe ekufi kuna.
19 The caravans of Tema look for water; the travelers of Sheba hope for it. Masanga ya bato ya Tema, oyo ezali na mobembo, elukaki mayi ; masanga ya bato ya Saba, oyo ezali na mobembo, etielaki yango motema.
20 They are ashamed because they had trusted; they reach the place and are disappointed. Kasi bayokaki soni mpo ete batielaki yango motema ; tango bakomaki kuna, bamiyokelaki mawa.
21 Now you too have become nothing; you see something dreadful and are afraid. Bino mpe bozali ndenge wana mpo na ngai, bozali na makoki te ya kosunga ngai ; awa bomoni pasi na ngai, somo ekangi bino !
22 Have I ever said, 'Give me something'? Or, 'Offer a bribe for me from your wealth'? Boni, nasila koloba na bino : ‹ Bokabela ngai ndambo ya biloko na bino to bofutela ngai niongo na nzela ya bozwi na bino,
23 Or, 'Rescue me from an enemy's hand'? Or, 'Redeem me from the grip of the ruthless'? mpo na kokangola ngai na loboko ya monguna to mpo na kobikisa ngai na nguya ya bato mabe ? ›
24 Teach me, and I will be silent; show me where I have gone wrong. Boteya ngai, bongo nakokanga monoko ; bolakisa ngai mabe nini ngai nasali !
25 How painful honest words can be! But what does your rebuke really prove? Tala ndenge maloba ya solo esalaka pasi ! Kasi makanisi na bino elingi kotalisa nini ?
26 Do you mean to correct mere words, treating a despairing man's speech as wind? Bokanisi ete bokoki kosembola makambo oyo nazali koloba to kozwa lokola mopepe, maloba ya moto oyo azali na pasi ?
27 You would even cast lots over an orphan and barter away your own friend. Solo, bino, bokoki ata kobeta zeke mpo na mwana etike mpe koteka moninga na bino na bowumbu !
28 But now, please look at me—I would never lie to your face. Kasi sik’oyo, bozala na mitema malamu mpo na kotala ngai ! Boni, nakoki penza kokosa bino, kaka na miso makasi boye ?
29 Relent, I beg you; let no injustice be done. Relent—my righteousness still stands. Bokanisa nanu malamu, bozala nanu sembo ! Bokanisa penza malamu, pamba te ezali bosembo na ngai nde emekami.
30 Is there any wrong on my tongue? Can my mouth not discern what is destructive?" Boni, likambo nini ya mabe ezali na monoko na ngai ; monoko na ngai ekoki kososola mabe te ?
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]