Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 7 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "Don't people have hard service on earth, and aren't their days like those of a hired worker? Boni, bomoi ya moto awa na se ezali kaka bomoi ya pasi te ? Mikolo ya bomoi na ye ezali penza mikolo ya mongamba te ?
2 Like a slave who longs for the shade, and like a hired worker who waits for his wages, Ndenge mowumbu azelaka pio ya pokwa to ndenge mongamba azelaka makasi lifuti na ye,
3 so I have been allotted months of emptiness, and nights of misery have been assigned to me. ngai nazwaki lokola libula, basanza ya pamba mpe babutu ya pasi na pasi.
4 When I lie down I say, 'When will I get up?' But the night drags on, and I toss and turn until dawn. Soki kaka nalali, nakomi komituna : ‹ Tango nini nakolamuka ? › Mpe soki kaka nalamuki : ‹ Tango nini butu ekoya ? › Nalembi komitungisa tango nyonso.
5 My flesh is clothed with worms and clods of dirt; my skin hardens, then breaks open again. Nkusu mpe makwanza ezipi nzoto na ngai, poso ya nzoto na ngai ezoki-zoki bapota mpe ekomi kolumba solo.
6 My days are swifter than a weaver's shuttle, and they come to their end without hope. Mikolo ya bomoi na ngai ezali koleka mbangu penza koleka tonga oyo mosali bilamba asalelaka ; nakomi na suka, mpe elikya na ngai nyonso esili.
7 Remember that my life is but a breath; I will never again see anything good. Oh Nkolo, kobosana te ete bomoi na ngai ezali kaka pema ya pamba ! Miso na ngai ekomona lisusu bolamu te.
8 The eye that sees me now will see me no more; your eyes will be on me, and I will be gone. Liso oyo ezali komona ngai sik’oyo ekotikala komona ngai lisusu te ; okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te.
9 As a cloud fades and vanishes, so the one who goes down to the grave does not come up; Ndenge mapata ekendaka mpe elimwaka, ndenge wana mpe moto oyo akendaka na mboka ya bakufi azongaka lisusu te.
10 he returns no more to his house, and his place knows him no longer. Akozonga lisusu te na ndako na ye, mpe ndako na ye ekoyeba ye lisusu te.
11 "Therefore I will not keep my mouth shut; I will speak out of the anguish of my spirit, I will complain in the bitterness of my soul. Yango wana, nakokanga monoko na ngai te, molimo na ngai ekoloba kaka na mawa, mpe motema na ngai ekolela kaka pasi na ngai.
12 Am I the sea, or a sea monster, that you set a guard over me? Boni, nakomi ebale to elima ya mayi mpo ete batiela ngai bikangiseli ?
13 When I say, 'My bed will comfort me, my couch will ease my complaint,' Nakanisaka ete soki nalali, mbeto na ngai ekobondisa ngai mpe pongi ekokitisa pasi na ngai ;
14 then you frighten me with dreams and terrify me with visions, nzokande, ozali lisusu kotungisa ngai na bandoto ya mabe mpe kobangisa ngai na bimoniseli ya somo.
15 so that I would choose strangling and death rather than this body of mine. Malamu bafina ngai kingo mpe nakufa, pamba te kufa ezali na litomba koleka bomoi oyo.
16 I waste away; I will not live forever. Leave me alone, for my days are a breath. Nayini bomoi na ngai ; nawumela libela te na bomoi ! Tika ngai kimia, pamba te mikolo na ngai ezanga na yango tina.
17 "What is man, that you make so much of him, and that you set your heart on him, Moto azali penza nani mpo ete okanisaka ye, mpo ete olandelaka ye na bokebi,
18 that you visit him every morning and test him every moment? mpo ete otalaka ye tango nyonso mpe omekaka ye tango nyonso ?
19 How long until you look away from me, and leave me alone long enough to swallow my spit? Mpo na nini okoki kolongola miso na Yo te likolo na ngai ? Mpo na nini okoki kotika ngai kimia te ata mpo na ngonga moke ?
20 If I have sinned, what have I done to you, watcher of mankind? Why have you made me your target, so that I have become a burden to myself? Oh Mokeli na ngai, soki nasali lisumu, eloko nini ngai nasali Yo ? Mpo na nini oponi kaka kobeta ngai ? Boni, nakomi mokumba mpo na Yo ?
21 Why won't you forgive my sin and take away my guilt? For soon I will lie down in the dust; you will search for me, but I will be gone." Mpo na nini ozali kolimbisa mabunga na ngai te mpe ozali kobosana masumu na ngai te ? Kala mingi te, nakokende kolala na putulu ; okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]