Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 8 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then Bildad the Shuhite answered: Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki :
2 "How long will you go on speaking such things? The words of your mouth are nothing but a roaring wind. « Kino tango nini okokoba koloba makambo ya boye ? Maloba na yo ezali te lokola mopepe makasi ?
3 Does God pervert justice? Does the Almighty pervert what is right? Boni, Nzambe abukaka mibeko, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso abalolaka penza bosembo ?
4 If your children sinned against him, he handed them over to the consequence of their rebellion. Soki bana na yo basalaki masumu liboso na Ye, apesaki nde bango etumbu mpo na mabe na bango !
5 But if you will earnestly seek God and plead with the Almighty for mercy, Kasi yo, soki oluki Nzambe, soki osengi ngolu epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso,
6 if you are pure and upright, surely now he will rouse himself for you and restore you to your rightful place. soki ozali peto, soki ozali sembo, akotelema Ye moko, ata sik’oyo, mpo na kokata likambo na yo mpe kozongisela yo libula na yo, kolanda bosembo na yo.
7 Though your beginning was small, your later years will flourish beyond measure. Bozwi na yo ya kala ekomonana moke, pamba te bozwi oyo ekoya na sima ekozala monene koleka.
8 Ask the generations long past, and consider what their fathers searched out. Nabondeli yo, tuna bato oyo baleka liboso, kanisa mpe landela malamu bwanya ya batata na bango,
9 For we were born just yesterday and know nothing; our days on earth are but a shadow. pamba te, biso, tozali bato ya lobi oyo ewuti koleka, toyebi eloko te, mpe mikolo na biso, awa na se, ezali kaka lokola elili.
10 Will they not teach you and tell you, and bring forth words from their understanding? Bato ya kala bakoteya yo, bakoloba na yo, mpe, na bwanya na bango, bakobimisela yo mateya oyo :
11 Can papyrus grow tall where there is no marsh? Can reeds flourish without water? Boni, nzete ya papirisi ekoki penza kobota na esika oyo ezangi potopoto ? Nzete oyo ebotaka na mayi ekoki solo kobota na esika ekawuka ?
12 While still green and uncut, it withers faster than any grass. Ekawukaka liboso ya matiti nyonso, wana makasa na yango ezali nanu mobesu, ata bapikoli yango te.
13 Such is the destiny of all who forget God; so perishes the hope of the godless. Ndenge wana nde ezalaka, bomoi ya bato nyonso oyo babosanaka Nzambe ; boye, elikya ya bato mabe ebebaka.
14 His confidence is fragile, and his trust is a spider's web. Eloko oyo batielaka motema ekokatana, pamba te elikya na bango ezali lokola ndako ya limpulututu.
15 He leans on his house, but it does not stand; he holds fast to it, but it does not endure. Ata batieli ndako na bango motema, esimbaka te ; Ezala bakangami na yango, esimbaka kaka te.
16 He is like a well-watered plant in the sunshine, spreading its shoots over the garden. Bazali lokola nzete ya mobesu na tango ya moyi makasi ; mandalala na yango ezipaka elanga,
17 Its roots wrap around a heap of stones and search among the rocks for a place to grip. elingaka misisa na yango zingazinga ya mabanga mpe epasolaka nzela kati na mabanga ;
18 But when he is torn from his place, it disowns him, saying, 'I never saw you.' kasi soki bapikoli nzete yango na esika na yango, esika yango ewanganaka nzete mpe elobaka : ‹ Natikala komona yo te ! ›
19 Such is the joy of his way—and from the soil others spring up in his place. Ndenge wana nde suka na yango ekozala ; mpe banzete mosusu ekobota kaka na mabele wana.
20 God will not reject a blameless man, nor will he lend a hand to evildoers. Solo, Nzambe abwakaka te bato ya sembo, mpe alendisaka te maboko ya bato mabe.
21 He will yet fill your mouth with laughter and your lips with shouts of joy. Nzokande, akotondisa monoko na yo na koseka, mpe bibebu na yo na banzembo ya esengo.
22 Those who hate you will be clothed with shame, and the tent of the wicked will be no more." Banguna na yo bakotondisama na soni, mpe bandako ya bato mabe ekozala lisusu te. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]