Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 9 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then Job answered: Yobo azongisaki :
2 "Truly I know that this is so. But how can a mortal be righteous before God? « Ezali ya solo, ezali penza ndenge osili koloba, mpe nayebi yango malamu ! Kasi ndenge nini moto oyo asalema na putulu akoki kozala sembo liboso ya Nzambe ?
3 If one wished to contend with him, he could not answer him once in 1,000 times. Ata, na mbala nkoto moko, ameki kobeta tembe na Nzambe, akotikala kokoka kolonga ata mbala moko te.
4 He is wise in heart and mighty in strength—who has ever defied him and come through unharmed? Bwanya ya Nzambe ezali na bozindo makasi, mpe nguya na Ye ezali monene ; nani asila kotelemela Ye, bongo amona bolamu ?
5 He removes mountains before they know it, overturning them in his anger. Alongolaka bangomba na bisika na yango, wana yango moko eyebaka te, mpe, kati na kanda na Ye, akweyisaka yango ;
6 He shakes the earth out of its place, and its pillars tremble. aningisaka mabele wuta na esika na yango mpe alengisaka makonzi na yango ;
7 He commands the sun, and it does not rise; he seals up the stars. apesaka mitindo na moyi, mpe moyi ebimaka te ; atiaka kashe na minzoto.
8 He alone stretched out the heavens and tramples the waves of the sea. Atandaki Ye moko Likolo mpe atambolaka likolo ya mbonge ya ebale ;
9 He made the Bear, Orion, and the Pleiades, and the constellations of the southern sky. akelaki bangombolo minene, orioni, masanga ya minzoto mpe minzoto ya sude ;
10 He does great things beyond fathoming, marvelous things beyond number. asalaka makambo minene oyo elekelaka mayele ya bato, bikamwa ya somo oyo bakokaka kotanga te.
11 Look—he passes by me, and I do not see him; he moves on, but I do not perceive him. Soki aleki pene na ngai, nakokoka te komona Ye ; soki mpe akei, nakokoka te komona Ye.
12 If he snatches away, who can turn him back? Who will say to him, 'What are you doing?' Soki azwi eloko, nani akoki kobotola Ye yango ? Nani akoki koloba na Ye : ‹ Ozali kosala nini ? ›
13 God will not turn back his anger; beneath him the helpers of the sea monster Rahab lay crushed. Nzambe azongisaka kanda na Ye sima te ; liboso na Ye, ezala bato ya lolendo balengaka.
14 How much less can I answer him, or choose my words to argue with him? Bongo, ngai, nakokoka ndenge nini kobeta tembe na Ye ? Nakolonga ndenge nini kopona maloba ya komekana na Ye ?
15 Though I were in the right, I could not answer him; I could only plead with my judge for mercy. Ezala soki nazalaki moto ya sembo, nalingaki na ngai kokoka te kopesa Ye eyano ; nalingaki kokoka nde kaka kosenga mawa ya Mosambisi na ngai.
16 If I called and he answered me, I would not believe that he was listening to my voice. Ata nabelelaki Ye, mpe ayanoli ngai, nalingaki na ngai kondima te ete ayoki ngai,
17 For he crushes me with a storm and multiplies my wounds without cause. pamba te afini ngai na nzela ya mopepe makasi mpe akomisi bapota na ngai ebele na pamba,
18 He will not let me catch my breath, but fills me with bitterness. aboyi kotikela ngai tango ya kopema, wana azali kaka kotondisa ngai na pasi.
19 If it is a matter of strength, he is the mighty one! And if it is a matter of justice, who can summon him to court? Soki ezali likambo oyo esengi makasi, Ye nde Nkolo-Na-Nguya ! Mpe soki ezali likambo ya bosembo, nani akoki kosambisa Ye ?
20 Though I were in the right, my own mouth would condemn me; though I were blameless, it would prove me perverse. Ezala namemaki na ngai ngambo te, monoko na ngai elingaki kaka kokweyisa ngai ; ezala nazalaki sembo, monoko na ngai elingaki kaka kolakisa mbeba na ngai.
21 I am blameless; I no longer care about myself; I despise my own life. Atako nazali sembo, motema na ngai etondi na mawa mpo na ngai moko, nayini bomoi na ngai.
22 It is all the same; therefore I say, he destroys both the blameless and the wicked. Nyonso ezali kaka ndenge moko ! Yango wana nalobi : ‹ Abomaka bato ya sembo mpe bato mabe. ›
23 When sudden disaster brings death, he mocks the despair of the innocent. Tango mopepe ya bokono ememaka kufa na mbalakata, Nzambe asekaka komekama ya bato ya sembo.
24 The earth is handed over to the wicked; he blindfolds its judges. If it is not he, then who? Soki mokili ekweyi na maboko ya bato mabe, Nzambe azipaka miso ya basambisi na yango. Soki ezali Ye te, ezali nani ?
25 My days are swifter than a runner; they flee away, they see no good. Mikolo ya bomoi na ngai ezali kokende mbangu koleka mopoti mbangu, ezali kokende mbangu penza, kasi etikali komona esengo te.
26 They skim past like boats of reed, like an eagle swooping down on its prey. Ezali kokende penza mbangu koleka masuwa oyo esalema na papirisi, koleka mpongo oyo ezali kokitela bilei na yango.
27 If I say, 'I will forget my complaint, I will put aside my gloomy face and be cheerful,' Soki nalobi : ‹ Nabosana ata pasi na ngai, nabongola elongi na ngai mpe nakoma koseka, ›
28 I dread all my pains, for I know you will not declare me innocent. nazali kaka kobanga pasi na ngai nyonso, pamba te nayebi ete okozwa na Yo ngai te lokola moto ya sembo.
29 I will be condemned; why then should I labor in vain? Lokola esili komonana ete nasali mabe, mpo na nini namitungisa lisusu na pamba ?
30 If I washed myself with snow and cleansed my hands with lye, Ezala namisukoli nzoto na sabuni mpe nasukoli maboko na ngai na sabuni ya malonga,
31 yet you would plunge me into the pit, and my own clothes would loathe me. okobwaka ngai kaka na libulu ya potopoto, mpe bilamba na ngai ekoyoka ngai nkele.
32 For he is not a man like me, that I could answer him, that we could go to court together. Azali moto lokola ngai te mpo ete nazongisela Ye eyano to nakende kosamba na Ye liboso ya basambisi.
33 There is no mediator between us, who could lay his hand on us both. Soki ezalaki ata na moto moko oyo akokaki komikotisa kati na likambo na biso mpe kotombola loboko na ye kati na ngai mpe Nzambe,
34 Let him take his rod away from me, and let the dread of him no longer terrify me. moto oyo akokaki kolongola fimbu ya Nzambe mosika na ngai mpo ete somo na Ye ebangisa ngai lisusu te,
35 Then I would speak without fearing him; but as it is, I am not free to do so." nalingaki kotombola mongongo na ngai liboso na Ye na kobanga te. Kasi ndenge ezali sik’oyo, nakokoka te.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]