Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Psalms 123 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Wana tozali kozela ngolu na Ye

1Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.Natomboli miso na ngai epai na Yo, Yawe,oyo ovandi na Kiti na Yo ya Bokonzi kati na Lola.

2Ndenge miso ya bawumbu etalaka nkolo na bango,mpe miso ya mwasi mosali etalaka nkolo na ye ya mwasi,ndenge wana mpe miso na biso ezali kotalaYawe, Nzambe na biso,kino asalela biso ngolu.

3Yawe, salela biso ngolu,yokela biso mawa !Pamba te tolembi kotiolama !

4Tolembi penza kotiolamana bato ya lolendo mpe ya lofundu !

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]