Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Numbers 17 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Yawe alakisi ete aponi Aron

16Yawe alobaki na Moyize : 17« Yebisa bana ya Isalaele ete bapesa yo mangenda zomi na mibale, lingenda moko mpo na mokambi ya libota moko na moko kati ya bikolo na bango. Koma kombo ya moto moko na moko na lingenda na ye. 18Koma kombo ya Aron mpo na lingenda ya libota ya Levi, mpo ete mokambi moko na moko ya libota akozala na lingenda moko. 19Tia mangenda yango na Ndako ya kapo ya Bokutani, liboso ya Sanduku ya Litatoli, epai wapi nakutanaka na bino. 20Lingenda ya moto oyo nakopona ekobimisa moto ya etape. Ezali na nzela wana nde nakosukisa Ngai moko koyimayima ya tango nyonso kati na bana ya Isalaele na tina na bino. »

21Moyize ayebisaki bana ya Isalaele, mpe bakambi na bango bapesaki ye mangenda zomi na mibale, lokola lingenda moko mpo na mokambi ya libota moko na moko, lingenda ya Aron mpe ezalaki kati na mangenda wana. 22Moyize atiaki mangenda nyonso liboso ya Yawe, kati na Ndako ya kapo ya Litatoli. 23Mokolo oyo elandaki, Moyize akotaki na Ndako ya kapo ya Litatoli, bongo amonaki ete lingenda ya Aron, oyo ezalaki kolakisa ndako ya Levi, ebimisaki mito ya etape, ebotaki bafololo mpe ezalaki na bambuma ya amande ya kotela. 24Moyize abimisaki mangenda nyonso longwa na liboso ya Yawe mpe amemaki yango na miso ya bato nyonso ya Isalaele. Bamonaki yango mpe moto na moto azwaki lingenda na ye.

25Yawe alobaki na Moyize : « Zongisa lingenda ya Aron liboso ya Sanduku ya Litatoli mpo ete ebombama lokola elembo ya kotomboka na bango. Boye, okosukisa koyimayima na bango mpo na Ngai mpo ete bakufa te. »

26Moyize asalaki ndenge kaka Yawe atindaki ye.

27Bana ya Isalaele balobaki na Moyize : « Tokufi na biso, tobebi na biso, biso nyonso, tobebi na biso ! 28Moto nyonso oyo akopusana pembeni ya Mongombo na Yawe akokufa. Boni, biso nyonso tokufa ? »

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]