Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Nahum 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
2 The scatterer has come up against you, Nineveh. Guard the fortress, watch the road, brace yourself, marshal all your strength! Tala, mobebisi azali koya kosala yo mabe ! Batela malamu bandako na yo batonga makasi, kengela nzela na yo, bongama mpo na bitumba mpe sangisa bato na yo.
3 For our Father is restoring the majesty of Jacob, like the majesty of Israel, though plunderers have stripped them bare and ruined their branches. Yawe akozongisa lisusu nkembo ya Jakobi mpe ya Isalaele, atako babebisaki mpe bapanzaki mokili na bango, mpe atako babebisaki bilanga na bango ya vino.
4 The shields of his warriors are dyed red, the valiant men are clothed in scarlet; the chariots flash like fire on the day they are made ready, and the spears of cypress are brandished. Banguba mpe bilamba ya basoda na bango ezali ya langi ya motane ; bibende ya bashar na bango ezali kongenga na mokolo oyo babongisi mpo na bitumba, mpe makonga basala na nzete ekomi kotambola bipai na bipai.
5 The chariots storm through the streets, they rush back and forth in the squares; they look like torches, they dart like lightning. Bashar ezali kokota na elulu na nzela, ezali kokende mpe kozonga na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; ezali komonana lokola koni oyo ezali kopela moto, ezali kotambola na bangambo nyonso lokola mikalikali.
6 He summons his officers; they stumble as they march; they hurry to the wall, and the protective shield is set in place. Abengi basoda na ye nyonso ya mpiko. nzokande, na nzela na bango, bazali kotepatepa, bazali kokende na lombangu pene ya mir.
7 The river gates are thrown open, and the palace collapses. Bikuke ya ebale efungwami, mpe ndako na ye ya bokonzi ebukani.
8 It is decreed: she is stripped bare and carried away, while her servant girls moan like doves, beating their chests. Ekatami ete engumba wana ekokende na bowumbu mpe bakomema yango mosika penza ; basali na yango ya basi bakolela lokola bibenga mpe bakomibeta batolo likolo ya pasi.
9 Nineveh is like a pool whose waters are draining away. "Stop! Stop!" they cry, but no one turns back. Na kala, engumba Ninive ezalaki lokola liziba ya mayi. Kasi tala yango lelo oyo : etoboki mpe ekomi kobimisa mayi ! Bazali kobelela : « Botelema ! Botelema ! » Kasi ata moto moko te azongi lisusu kuna.
10 Plunder the silver! Plunder the gold! There is no end to the treasure, an abundance of every precious thing. Bobotola wolo mpe palata na yango na makasi, pamba te bomengo na yango ezali penza mingi koleka mpe etonda na biloko ya motuya.
11 Emptiness and desolation and ruin! Hearts melt, knees give way, anguish grips every body, and every face grows pale. Bakoteli yango, bapanzi yango, babotoli na makasi biloko na yango ya talo ! Mitema ebukani, mabolongo ekomi kolenga, mpe banzoto etondi na somo.
12 Where now is the lions' den, the feeding place of the young lions, where the lion and lioness prowled, and the lion's cubs, with no one to make them afraid? Wapi sik’oyo libulu epai wapi bankosi ezalaki kobokola bana na yango ? Wapi sik’oyo libulu epai wapi nkosi ya mwasi elongo na bana na yango ezalaki kotambola na somo ata moke te ?
13 The lion tore enough for his cubs and strangled prey for his lionesses; he filled his lairs with the kill and his dens with torn flesh. Nkosi ebomi banyama ebele mpo ete epesa yango lokola bilei epai ya bana na yango, ekangi nyama ya kolia mpo na mwasi na yango, bongo etondisi libulu na yango na banyama oyo ebomi mpe na misuni.
14 "See, I am against you," declares the Father of heaven's armies. "I will send your chariots up in smoke, and the sword will devour your young lions. I will cut off your prey from the earth, and the voice of your messengers will be heard no more." « Nakotombokela yo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ; « nakozikisa bashar na yo na moto, mpe mopanga ekoboma bana ya nkosi na yo. Nakobotola yo misuni nyonso awa na se ; boye mongongo ya batindami na yo ekotikala koyokana lisusu te. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]