Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Nahum 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Woe to the city of bloodshed, all full of lies and plunder—the prey never departs! Mawa na engumba oyo mosala na yango kosopa makila ya bato, engumba oyo etonda na makambo ya lokuta mpe na moyibi, engumba oyo ezangaka te koboma bato !
2 The crack of the whip, the rumble of wheels, galloping horses, and bounding chariots! Tango nyonso, kaka makelele ya bafimbu, makelele ya bapine : bampunda ezali kopumbwa, mpe bashar ezali koningana.
3 Charging horsemen, flashing swords, glittering spears—a multitude of slain, a heap of corpses, bodies without end; they stumble over the dead. Basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda bazali kotambola-tambola, mipanga ezali kongenga, makonga ezali koleka-leka lokola mikalikali ! Bato bazali kozoka, kokufa ebele penza ! Bongo bibembe elali-lali bisika nyonso, mpe makolo ya bato ekomi kotuta bibembe tango bazali kotambola.
4 All because of the rampant prostitution of this seductive prostitute, the mistress of sorceries, who sells nations through her prostitution and peoples through her sorceries. Makambo oyo nyonso esalemi likolo ya makambo ya nkele ya engumba oyo etonda na kindumba, engumba ya kitoko makasi kasi etonda na misala ya soloka, engumba oyo epengwisaka bikolo na nzela ya kindumba na yango mpe epengwisaka bato na nzela ya misala na yango ya soloka.
5 "Look, I am against you,' declares the Father of heaven's armies, 'and I will lift your skirts over your face; I will show the nations your nakedness and the kingdoms your shame. « Natombokeli yo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ; « nakotombola yo elamba kino na elongi, nakolakisa bolumbu na yo na miso ya bikolo mosusu mpe nakoyokisa yo soni na miso ya bamboka nyonso.
6 I will pelt you with filth, treat you with contempt, and make you a spectacle.' Nakobwakela yo bosoto, nakosambwisa yo mpe nakokomisa yo eloko ya maseki.
7 And all who see you will flee from you and say, 'Nineveh is laid waste; who will grieve for her?' Where can I find comforters for you?'" Bato nyonso oyo bakomona yo bakokima mpe bakoganga : ‹ Engumba Ninive ebebisami boye ! Nani akoyokela yango mawa ? › »
8 Are you better than Thebes, that sat by the Nile with water all around her, whose rampart was the sea, whose wall was the waters? Boni, okanisi ete ozali kitoko koleka engumba Tebesi oyo ezalaka pembeni ya ebale Nili mpe ezingelama na mayi, bongo ebale ebatelaka yango mpe mayi ezalaka lokola mir oyo ebombaka yango ?
9 Cush was her strength, and Egypt without limit; Put and the Libyans were among her allies. Makasi na yango ezalaki kowuta na Kushi mpe na Ejipito ; bato ya Puti mpe ya Libi bazalaki kosunga yango.
10 Yet she became an exile; she went into captivity. Her infants were dashed to pieces at every street corner. They cast lots for her honored men, and all her great men were bound in chains. Nzokande, yango mpe ekweyaki, mpe bamemaki bato na yango na bowumbu. Bakataki-kataki na biteni bana na bango na babalabala nyonso, babetaki zeke mpo na kopona bato na yango ya lokumu mpo ete bamema bango na bowumbu, mpe bakangaki bakambi na yango minyololo.
11 You too will be drunk; you will go into hiding; you too will seek refuge from the enemy. Yo mpe okokoma lokola moto oyo alangwe masanga, yo mpe okoluka ekimelo mpo na kokima banguna na yo.
12 All your fortresses are like fig trees with the first-ripe figs—when shaken, they fall into the mouth of the eater. Bandako na yo nyonso, oyo batonga makasi ezali lokola banzete ya figi etonda na bambuma ya liboso ekomela ; soki kaka bameki koningisa yango, bambuma ekweyaka kino na monoko ya moto ya lokoso.
13 Look, your troops are women in your midst. The gates of your land are flung wide open to your enemies; fire has devoured your bars. Tala malamu mampinga na yo, balemba lokola basi ; bikuke ya mokili na yo ezali polele liboso ya banguna na yo, pamba te moto ezikisi bikangelo na yango.
14 Draw water for the siege; strengthen your fortresses; go into the clay and tread the mortar; take hold of the brick mold! Bino bato ya engumba oyo, bomitokela libela mayi mpo ete bakozingela bino ; bolendisa libela bamir oyo ebatelaka engumba na bino ; bokamata mabele oyo batongelaka bandako, bosangisa yango mpo ete ekoma potopoto, bongo bobeta babiliki mpe botumba yango.
15 There the fire will devour you; the sword will cut you down; it will consume you like the young locust. Multiply yourselves like the young locust; multiply like the swarming locust! Kuna nde moto ekoya kozikisa yo, mopanga ekoya koboma yo mpe kosilisa yo lokola mabanki. Tika ete bato na yo bakoma ebele lokola mabanki, bakoma lisusu ebele makasi lokola mankoko.
16 You multiplied your merchants more than the stars of the heavens. The young locust strips the land and flies away. Okomisi motango ya bato na yo ya mombongo ebele koleka ata minzoto ya likolo, kasi babebisi mokili nyonso mpe bapumbwe na bango ndenge kaka mankoko esalaka.
17 Your guards are like locusts, and your officials like clouds of locusts that settle on the walls on a cold day—when the sun rises, they fly off, and no one knows where they are. Bakengeli na yo bazali lokola mankoko, bakonzi ya basoda na yo bazali lokola maboke ya mabanki oyo eyaka kovanda na bamir ya lopango na tango ya malili ; kasi soki kaka moyi ebimi, yango nyonso epanzani, mpe moto moko te ayebaka esika yango ekendaka.
18 Your shepherds are asleep, king of Assyria; your nobles lie down. Your people are scattered across the mountains, with no one to gather them. Oh mokonzi ya Asiri, bakambi na yo bazali kolala pongi, basoda na yo ya mpiko balali pongi ya makasi, mampinga na yo bapalangani na bangomba mpe moto akosangisa bango azali komonana te.
19 There is no relief for your injury; your wound is fatal. All who hear the news of you clap their hands over you—for who has not felt your endless cruelty pass over them again and again? Ezali ata na kisi moko te oyo ekoki kobikisa pota na yo ; pota na yo ezali monene makasi ! Moto nyonso oyo akoyoka sango ya makambo oyo ekomeli yo akobeta maboko mpo na kokweyisama na yo. Pamba te nani oyo ozangaki kosala mabe ?
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]