Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Nahum 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 An oracle concerning Nineveh. The book of the vision of Nahum the Elkoshite. Lisakoli na tina na engumba Ninive. Buku ya emoniseli ya Naumi, moto ya engumba Elikoshi.
2 Our Father is jealous and avenging; our Father takes vengeance and is filled with wrath. Our Father takes vengeance on his adversaries, and he reserves his wrath for his enemies. Yawe azali Nzambe oyo atonda na zuwa, oyo azongisaka mabe na mabe. Yawe azongisaka mabe na mabe mpe atombokaka makasi. Yawe azongisaka mabe na mabe epai ya banguna na Ye, akangelaka bayini na Ye kanda makasi.
3 Our Father is slow to anger and great in power, and he will never leave the guilty unpunished. His way is in the whirlwind and the storm, and the clouds are the dust beneath his feet. Yawe asilikaka noki te, mpe nguya na Ye ezali monene. Yawe atikaka te moto oyo asali mabe lokola nde asali na ye mabe te, kasi apesaka etumbu na moto oyo asali mabe. Yawe apasolaka nzela na Ye kati na ekumbaki, kati na mopepe makasi.
4 He rebukes the sea and dries it up; he makes all the rivers run dry. Bashan and Carmel wither, and the blossom of Lebanon fades. Agangelaka ebale monene mpe akawusaka yango, akawusaka bibale nyonso. Etuka ya Bashani mpe ya Karimeli esili nyonso kokawuka, mpe matiti nyonso ya Libani esili kokawuka.
5 The mountains quake before him, and the hills melt away. The earth heaves at his presence—the world and all who live in it. Bangomba milayi eninganaka liboso na Ye, mpe bangomba mikuse epanzanaka. Mabele, mokili mpe bavandi na yango balengaka liboso na Ye.
6 Who can stand before his fury? Who can endure the heat of his anger? His wrath pours out like fire, and the rocks shatter before him. Nani akoki solo kotelema liboso na Ye soki asiliki ? Nani akoki solo kobika soki kanda na Ye epeli ? Mpo ete kanda na Ye epanzanaka lokola moto, bongo mabanga ebukanaka liboso na Ye.
7 Our Father is good, a stronghold in the day of trouble; he knows those who take refuge in him. Yawe azali malamu, azali ebombamelo ya solo na tango ya pasi mpe abatelaka bato nyonso oyo batiaka elikya na Ye.
8 But with an overwhelming flood he will put an end to her place, and he will pursue his enemies into darkness. Akobebisa engumba na Ye nyonso na mpela mpe akobengana banguna na Ye kino kati na molili.
9 What do you plot against our Father? He will put a complete end to it; trouble will not rise up a second time. Likita ya ndenge nini bakoki kosalela Yawe ? Azali Ye oyo asilisaka makambo nyonso ; pasi ekoya lisusu te.
10 For though they are entangled like thorns and soaked in their drink, they will be consumed like dry stubble. Bakokoma lokola bato oyo bazali kati na banzube, lokola bato oyo balangwe masanga ya vino ; bakozikisama nye lokola matiti ya kokawuka.
11 From you, Nineveh, came one who plots evil against our Father, a counselor of wickedness. Ezali kati na yo Ninive nde moto oyo azali na mabongisi mabe mpo na kotelemela Yawe mpe azali na batoli ya mabe abimi.
12 This is what our Father says: However strong and numerous they are, they will be cut down and disappear. Though I have made you suffer, I will make you suffer no more. Tala liloba oyo Yawe alobi : « Ata banguna na bino bazali ebele mpe makasi, bakosila kokufa mpe kolimwa. Oh mokili ya Yuda, soki nasambwisaki yo, nakosala yango lisusu te.
13 Now I will break his yoke from your neck and tear away your chains. Nakobuka ekangiseli na bango, oyo ezali na kingo na yo mpe nakolongola yo na minyololo. »
14 Our Father has commanded about you, Nineveh: your name will have no descendants. I will cut off the carved image and cast idol from your gods' house. I will make your grave—you are contemptible. Kasi Yawe azwi mokano oyo mpo na yo : « Okotikala kozwa lisusu bakitani te oyo bakobatela kombo na yo na bokonzi. Nakolongola kati na tempelo na yo banzambe na yo ya bikeko mpe bikeko nyonso oyo basala na bibende balekisa na moto. Nazali kobongisela yo kunda, pamba te ozali na yo pamba. »
2:1 Look! There on the mountains, the feet of one who brings good news, who proclaims peace! Celebrate your feasts, Judah; fulfill your vows. For never again will the wicked invade you; they are completely cut off. Botala kuna na bangomba makolo ya momemi sango malamu : amemi sango ya kimia ! Oh mokili ya Yuda, sepela na bafeti na yo mpe kokisa ndayi na yo ; pamba te wuta sik’oyo, moto mabe moko te akokota lisusu epai na yo ; pamba te bango nyonso bakobebisama nye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]