Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Micah 7 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 How miserable I am! I am like someone who gathers summer fruit, like one who gleans the vineyard after harvest: there is no cluster to eat, no early fig I long for. Tala, mawa na ngai ! Nakomi lokola moto oyo azali koluka kobuka bambuma na eleko ya elanga, na tango oyo bazongelaka kobuka bambuma ya vino oyo etikalaka. Kasi ezali ata na liboke moko te ya bambuma ya vino ya kolia to mbuma ata moko te ya figi ya sika oyo nasepelaka kolia.
2 The faithful have vanished from the land, and there is no one upright among the people; they all lie in wait for blood, each hunting his brother with a net. Bayengebene batikali lisusu te na mokili, moto ya sembo azali lisusu te ; bato nyonso bakomi kaka koluka nzela ya kosopa makila, mpe moto na moto azali kotiela ndeko na ye motambo.
3 Their hands are skilled at evil: the official demands a bribe, the judge accepts a payoff, and the powerful dictate what they want—and so they all conspire together. Maboko na bango eyebi penza kosala makambo mabe, bakambi mpe basambisi na bango bakomi koluka kanyaka ; bongo bato ya makasi bazali kosala makambo nyonso oyo balingi, bayokanaka mpo na kosala bato mabe.
4 The best of them is like a brier, the most upright worse than a thorn hedge. The day your watchmen warned of, the day of your reckoning, has come; now their confusion is near. Moto oyo aleki malamu kati na bango azali lokola nzube, moto oyo aleki sembo azali mabe koleka liboke ya basende. Mokolo oyo bakengeli na yo basakolaki ekokisami, mokolo oyo Yawe ayei kopesa yo etumbu. Sik’oyo, ekomi tango na bango ya koyoka soni.
5 Put no trust in a neighbor; have no confidence in a close friend; guard what you say even to the one who lies in your arms. Botia motema te epai ya bazalani na bino, botia elikya te epai ya baninga na bino ya motema. Ezala liboso ya mwasi oyo alalaka na tolo na yo, keba na maloba oyo ezali kobima na monoko na yo.
6 For the son treats the father with contempt, the daughter rises against her mother, the daughter-in-law against her mother-in-law; a person's enemies are the members of his own household. Pamba te mwana mobali azali koyokisa tata na ye soni, elenge mwasi azali kotelemela mama na ye, mwasi ya libala azali kotelemela mama-bokilo na ye ; bongo monguna ya moto, ezali kaka moto ya libota na ye.
7 But as for me, I will watch for our Father; I will wait for the Father who saves me; my Father will hear me. Kasi mpo na ngai, nakotia elikya na ngai epai na Yawe, nakotalela Nzambe, Mobikisi na ngai ; Nzambe na ngai akoyoka ngai.
8 Do not gloat over me, my enemy! Though I have fallen, I will rise; though I sit in darkness, our Father will be my light. Oh banguna na ngai, boseka ngai te ! Ata soki nakweyi, nakotelema kaka. Ata soki navandi kati na molili, Yawe azali pole na ngai.
9 I will bear the indignation of our Father, because I have sinned against him, until he takes up my case and brings me justice. He will bring me out into the light, and I will see his vindication. Lokola nasalaki masumu liboso ya Yawe, nakomema mokumba ya kanda na Ye kino tango akozwa likambo na ngai na maboko mpe akolongisa ngai. Akobimisa ngai na pole, mpe nakomona bosembo na Ye.
10 Then my enemy will see it and be covered with shame, she who said to me, "Where is the LORD your God?" My eyes will look on her; now she will be trampled down like mud in the streets. Bongo monguna na ngai akomona yango mpe akoyoka soni makasi, ye oyo azalaki koloba na ngai : « Wapi Yawe, Nzambe na yo ? » Miso na ngai ekomona ndenge akokweya mpe ndenge bakonyata ye lokola potopoto ya nzela.
11 The day for rebuilding your walls will come, the day your boundaries will be extended far and wide. Mokolo ya kotonga lisusu bamir na yo ekoya ; ezali mokolo wana nde bandelo ya mokili na yo ekopusama lisusu mosika.
12 In that day they will come to you from Assyria and the cities of Egypt, from Egypt to the River, from sea to sea and mountain to mountain. Na mokolo wana, bato ebele bakoya epai na yo longwa na mokili ya Asiri mpe na bingumba ya Ejipito, ata longwa na mokili ya Ejipito kino na ebale Efrate, longwa na ebale monene moko kino na mosusu, longwa na ngomba moko kino na mosusu.
13 But the earth will become desolate because of those who live in it, as the fruit of their deeds. Mokili ekobebisama likolo ya bato wana, likolo ya bizaleli na bango ya mabe.
14 Shepherd your people with your staff, the flock of your inheritance, who live alone in a forest in the midst of fertile pasture. Let them graze in Bashan and Gilead as they did long ago. Kamba bato na Yo na lingenda na Yo ndenge mobateli bibwele asalaka ! Pamba te bazali bameme ya libula na Yo, oyo ezali lokola kotelengana yango moko kati na zamba, na etando moko ya kitoko. Tika ete elia na bilanga ya Bashani mpe ya Galadi ndenge ezalaki kolia na tango ya kala.
15 As in the days when you came out of the land of Egypt, I will show them wonders. Nakomonisa yo makambo ya kokamwa lokola na tango obimaki na Ejipito.
16 The nations will see and be ashamed of all their might; they will put their hands over their mouths, and their ears will go deaf. Bato ya bikolo ya bapaya bakomona yango mpe bakoyoka soni ; ata soki bazali na nguya ya ndenge nini, bakozanga maloba, mpe matoyi na bango ekokangama.
17 They will lick the dust like a serpent, like creatures that crawl on the ground. They will come trembling from their strongholds; they will turn to our Father in dread, and they will be afraid of you. Bakolia mabele lokola nyoka, mpe lokola banyama oyo etambolaka na libumu ; bakobima na somo wuta na madusu epai wapi bazalaki kobombama, bakoya epai na Yawe, Nzambe na biso, na kolenga.
18 Who is like our Father, who pardons sin and passes over the rebellion of the remnant of his inheritance? He does not hold on to his anger forever, because his heart delights in covenant love. Nzambe nini akokani na Yo, Yo oyo olimbisaka masumu ya bato mpe obosanaka mabe ya batikali kati na libula na Yo ? Okangelaka bato kanda mpo na libela te, kasi osepelaka kotalisa bango ngolu.
19 He will again have compassion on us; he will tread our wrongdoing underfoot. You will hurl all our sins into the depths of the sea. Solo, okoyokela biso lisusu mawa, matambe na Yo ekonyata masumu na biso, mpe okobwaka mabunga na biso nyonso kati na bozindo ya ebale monene.
20 You will be faithful to Jacob and show covenant love to Abraham, as you swore to our ancestors long ago. Okomonisa Jakobi bosembo na Yo, mpe Abrayami, bolamu na Yo, ndenge olapaki ndayi epai ya batata na biso na tango ya kala.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]