Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Micah 6 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Hear what our Father says: Stand, plead your case before the mountains; let the hills hear your voice. Boyoka makambo oyo Yawe alobi : « Telema mpe samba likambo na yo liboso ya bangomba, mpe tika ete bangomba mikuse eyoka makambo oyo ozali koloba !
2 Listen, mountains, to our Father's case, and you lasting foundations of the earth; for our Father has a case against his people, and he will contend with Israel. Bino bangomba mpe bino miboko oyo eninganaka te, boyoka likambo oyo Yawe afundeli bato na Ye, pamba te azwi bango na likambo mpe alingi kosamba na Isalaele.
3 My children, what have I done to you? How have I wearied you? Answer me! Bino bato na Ngai, nasali bino penza nini ? Boyanola Ngai nanu, nalembisi bino na likambo nini ?
4 For I brought you up from the land of Egypt and redeemed you from the house of slavery; I sent before you Moses, Aaron, and Miriam. Ezali te mpo ete nabimisaki bino na Ejipito to mpo ete nakangolaki bino na ndako ya bowumbu ? Boni, ezali te mpo ete natindelaki bino Moyize, Aron mpe Miriami mpo ete bakamba bino ?
5 My children, remember what Balak king of Moab planned, and what Balaam son of Beor answered him, from Shittim to Gilgal, so you will know the righteous acts of your Father. Bato na Ngai, bokanisa nanu makambo oyo Balaki, mokonzi ya Moabi, akanaki kosala bino, mpe makambo oyo Balami, mwana mobali ya Beori, azongiselaki ye. Bokanisa nanu nzela oyo botambolaki longwa na Sitimi kino na Giligali mpo ete bokoka kondima ata misala ya bosembo ya Yawe. »
6 What should I bring when I come before our Father? How should I bow before our Father on high? Will I come to him with burnt offerings, with year-old calves? Eloko nini penza tokoki komema epai na Yawe mpo na kofukama liboso ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo ? Boni, tomema bambeka ya kotumba to bana ngombe ya mibali ya mobu moko ?
7 Will our Father be pleased with thousands of rams, with 10,000 rivers of oil? Will I give my firstborn for my rebellion, the child of my own body for the sin of my soul? Yawe akosepela solo soki tomemeli Ye minkoko ya bameme ya mibali to soki topesi Ye mafuta ebele lokola mayi ya ebale ? Boni, topesa solo bana na biso ya liboso mpo ete tozwa bolimbisi masumu na biso ? Boni, topesa bana na biso ya mibali oyo bawuti na mikongo na biso mpo ete akoka kolongola masumu na biso ?
8 He has told you what is good; and what does our Father require of you but to do justice, to love kindness, and to walk humbly with your Father? Oh moto, bateyaki yo makambo oyo ezali malamu. Mpe tala makambo oyo Yawe azali kosenga epai na yo : Tambola na bosembo, linga boboto mpe tambola elongo na Nzambe na yo na komikitisa.
9 The voice of our Father calls to the city—and it is sound wisdom to fear your name—"Listen, tribe, and the one who appointed it! Boyoka ! Yawe azali kobelela na engumba ! Kotosa Kombo na Ye, yango nde kozala na bwanya. Boyoka sango ya etumbu na bino na monoko na Ye oyo atindi yango !
10 Are there still treasures of wickedness in the house of the wicked, and the accursed short measure? Oh libota ya mobulu, boni, nasepela penza komona bomengo na bino, oyo bosili kozwa na nzela ya mabe, Efa ekoka te oyo elakelama mabe ?
11 Will I declare innocent the one with dishonest scales, with a bag of deceitful weights? Boni, nazanga penza kopesa etumbu epai ya moto oyo asalelaka kilo ya lokuta, mpe oyo azali na libenga etonda na bimekelo kilo ya lokuta ?
12 Your rich men are full of violence, your inhabitants speak lies, and their tongues are full of deceit. Bazwi ya libota oyo batondi na kanza, bato ya libota oyo batondi na lokuta, mpe mosala ya bibebu na bango ezali kaka kokosa.
13 So I myself have begun to strike you, making you desolate because of your sins. Yango wana, Ngai nakobeta yo na nzela ya pasi mpe nakobebisa yo mpo na masumu na yo.
14 You will eat but not be satisfied, and your hunger will stay within you; you will store up but not save, and what you save I will give over to the sword. Okolia, kasi okotonda te, pamba te nzala makasi ekokota na ndako na yo. Okosala ekonzo, kasi okobatela eloko moko te, pamba te nakokaba yango na mopanga.
15 You will sow but not reap; you will press olives but have no oil to use, and press the grapes but not drink the wine. Okolona bilanga, kasi okobuka bambuma te ; okokamola bambuma ya olive, kasi okomipakola mafuta na yango te ; okokamola bambuma ya vino, kasi okomela masanga na yango te.
16 For you have kept the statutes of Omri and all the works of the house of Ahab, and you have followed their ways; so I will make you a desolation and your inhabitants a mockery, and you will bear the scorn of my children." Lokola obatelaki malako ya Omiri mpe osalaki misala nyonso ya mabe ya ndako ya Akabi, nakokaba yo mpo ete obebisama, nakokaba bato na yo mpo ete batiolama ; bongo bokolata soni ya libota na Ngai.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]