Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Micah 5 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
4:14 Marshal your forces, daughter of troops! A siege has been laid against us. With a rod they strike the judge of Israel on the cheek. Oh engumba oyo elinga bitumba, sangisa basoda na yo, pamba te bazingeli biso ! Bakobeta mokambi ya Isalaele fimbu na matama.
1 But you, Bethlehem Ephrathah, though you are small among the clans of Judah, from you will come forth for me one who will be ruler over Israel, whose origins are from ancient times, from the days of eternity. Bongo yo, Beteleemi Efrata, atako ozali moke kati na bingumba ya Yuda, ye oyo akokonza Isalaele akowuta kati na yo. Ebandeli na Ye ezala wuta kala penza, wuta na ebandeli ya tango.
2 Therefore he will give them up until the time when the woman in labor has given birth; then the rest of his brothers will return to the people of Israel. Yango wana, Yawe akosundola Isalaele kino tango mwasi oyo azali na pasi ya kobota akobota, mpe ndambo ya bandeko na ye, oyo bakotikala bakozonga epai ya bandeko na bango, bana ya Isalaele.
3 And he will stand and shepherd his flock in the strength of our Father, in the majesty of the name of his Father. And they will live in safety, for now he will be great to the ends of the earth. Akotelema mpe akobatela bibwele na ye na nguya na Yawe, na lokumu ya Kombo ya Nzambe na ye ; mpe bakovanda na kimia, pamba te sango ya lokumu ya kombo na ye ekopanzana mokili mobimba.
4 And he himself will be our peace. When Assyria comes into our land and treads on our fortresses, then we will raise against him seven shepherds and eight leaders of men. Boye, akozala kimia na bango ! Tango mampinga ya Asiri bakokota na makasi kati na mokili na biso mpe na bandako na biso, oyo batonga makasi, tokotindela bango babateli sambo ya bibwele mpe bakambi mwambe ya bato mpo na kobundisa bango.
5 They will shepherd the land of Assyria with the sword, and the land of Nimrod at its entrances. And the ruler will deliver us from Assyria when it comes into our land and treads within our borders. Bakokamba mokili ya Asiri mpe ya Nimirodi na mopanga. Boye, akokangola biso na bokonzi ya mampinga ya Asiri tango bakokota na makasi na mabele na biso mpe na bandelo na yango.
6 Then the remnant of Jacob will be in the midst of many peoples like dew from our Father, like showers on the grass, which do not wait for anyone or delay for any person. Batikali ya Jakobi bakozala, kati na bikolo ebele lokola mamwe oyo ewuti epai na Yawe, mpe na likolo ya matiti lokola londende oyo ekweyaka na makasi ya moto te to mpe etalelaka moto te.
7 And Jacob's remnant will live among the nations, surrounded by many peoples—like a lion among the wild animals of the forest, like a young lion prowling among flocks of sheep, which, when it passes through, tramples and tears, and no one can rescue. Batikali ya Jakobi bakozala kati na mabota, na kati-kati ya bikolo ebele, lokola nkosi kati na banyama ya zamba, lokola mwana nkosi kati na etonga ya bameme : tango elekaka kati na etonga ya bameme, ekangaka mpe epasolaka yango, mpe moto oyo akoki kokangola yango azalaka te.
8 Your hand will be lifted up over your adversaries, and all your enemies will be cut off. Tika ete loboko na yo elonga banguna na yo, mpe bayini na yo nyonso babebisama nye !
9 And in that day, declares our Father, I will cut off your horses from among you and destroy your chariots. « Na mokolo wana, » elobi Yawe, « nakobebisa bashar mpe bampunda ya mokili na yo,
10 I will cut off the cities of your land and tear down all your strongholds. nakobebisa bingumba ya mokili na yo mpe nakokweyisa bandako na yo, oyo batonga makasi ;
11 I will cut off sorceries from your hand, and you will have no more fortune-tellers. nakobebisa misala na yo nyonso ya kindoki, mpe okotikala lisusu na bato ya soloka te ;
12 I will cut off your carved images and your sacred pillars from among you, and you will no longer bow down to the work of your hands. nakobebisa banzambe ya bikeko oyo ezali kati na yo, mpe okofukamela lisusu te bikeko oyo maboko na yo esilaki kosala ;
13 I will uproot your Asherah poles from among you and demolish your cities. nakobebisa makonzi ya bule ya nzambe Ashera oyo ezali kati na yo mpe nakobebisa bingumba na yo.
14 And in anger and fury I will bring judgment on the nations that did not obey. Na kanda na Ngai ya makasi, nakozongisa mabe na mabe na bikolo oyo etosaki Ngai te. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]