Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Micah 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 In the last days the mountain where our Father's house stands will be firmly established as the highest of the mountains, lifted high above the hills, and peoples will stream to it. Na mikolo oyo ekoya, ngomba ya Tempelo ya Yawe ekolendisama ngwi na songe ya bangomba, ekoleka bangomba mikuse nyonso na molayi, mpe bikolo ekokende kotondana kuna.
2 Many nations will come and say, "Come, let us go up to the mountain of our Father, to the house of the God of Jacob, that he may teach us his ways and we may walk in his paths." For instruction will go out from Zion, and the word of our Father from Jerusalem. Bato ya bikolo ebele bakokende kuna mpe bakoloba : « Boya, tomata na ngomba ya Yawe, na Tempelo ya Nzambe ya Jakobi ! Akoteya biso banzela na Ye mpo ete tolanda banzela mike na Ye. » Pamba te Mobeko ekowuta na Siona, mpe Liloba na Yawe ekowuta na Yelusalemi.
3 He will judge between many peoples and settle disputes for strong nations far away. They will beat their swords into plowshares and their spears into pruning hooks; nation will not lift up sword against nation, nor will they train for war anymore. Akozala Mosambisi kati na bikolo ebele, akokata makambo ya kowelana kati na mabota ya nguya, ezala oyo ezalaka mosika. Bakotumba mipanga na bango na moto mpo na kosala bakongo, mpe makonga na bango mpo na kosala bambeli. Ekolo moko te ekotombola lisusu mopanga mpo na kobundisa ekolo mosusu, bato bakoyekola lisusu te kobunda bitumba.
4 Each will sit under his own vine and under his own fig tree, and no one will make them afraid, for the Father of heaven's armies himself has spoken. Moto nyonso akovanda na kimia kati na bilanga na ye ya vino mpe na se ya nzete na ye ya figi. Moto moko te akobangisa ye, pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde alobi.
5 For all the peoples walk in the name of their own god, but we will walk in the name of our Father forever and ever. Ekolo na ekolo ekotambola na kombo ya nzambe na yango, kasi biso tokotambola na Kombo na Yawe oyo azali Nzambe na biso, mpo na libela.
6 In that day, declares our Father, I will gather the lame and bring together the outcast, those whom I have afflicted. « Na mokolo yango, » elobi Yawe, « Nakosangisa libota na Ngai, oyo ezali kotambola tengu-tengu ; nakoyamba oyo ezalaki na bowumbu, mosika na Ngai, mpe oyo natiaki pasi likolo na yango.
7 I will make the lame into a remnant, and those driven far away into a strong nation, and our Father will reign over them on Mount Zion from now on and forever. Nakosala ete libota oyo ezali kotambola tengu-tengu ekoma batikali, mpe oyo bazalaki na bowumbu mosika na Ngai, libota ya nguya. Yawe akozala Mokonzi na bango, na ngomba Siona, kobanda na mokolo yango kino libela na libela.
8 And you, tower of the flock, hill of the daughter of Zion, to you it will come—the former dominion will return, the kingdom of the daughter of Jerusalem. Mpo na yo, ndako molayi ya bakengeli bibwele, ngomba ya Siona, mboka kitoko, bakozongisela yo bokonzi na yo ya kala, bakozongisa bokonzi ya Yelusalemi, mboka kitoko. »
9 Now why do you cry aloud? Is there no king among you? Has your counselor perished, that pain has seized you like a woman in labor? Sik’oyo, mpo na nini ozali koganga ? Boni, ozali lisusu na mokonzi te ? Boni, mopesi toli na yo asili kokufa mpo ete pasi ekanga yo lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ?
10 Writhe and groan, daughter of Zion, like a woman in labor, for now you will go out from the city and live in the open field; you will go to Babylon. There you will be rescued; there our Father will redeem you from the hand of your enemies. Oh Siona, mboka kitoko, lela lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ! Pamba te sik’oyo, okobima na engumba mpe okovanda kati na zamba, okokende kino na Babiloni ; mpe kuna, Yawe akokangola yo na maboko ya monguna na yo.
11 Now many nations are gathered against you, saying, "Let her be defiled, and let our eyes gloat over Zion." Kasi sik’oyo, bikolo ebele esangani mpo na kotelemela yo ; bazali koloba : « Tika ete bosantu ya Siona esambwa mpe miso esepela komona kobebisama na yango ! »
12 But they do not know the thoughts of our Father; they do not understand his plan, that he has gathered them like sheaves to the threshing floor. Kasi bayebi makanisi na Yawe te mpe bazali kososola mabongisi na Ye te, Ye oyo asangisaki bango lokola maboke ya matiti ya ble na etando oyo batutelaka yango.
13 Arise and thresh, daughter of Zion, for I will make your horn iron and your hooves bronze; you will crush many peoples, and you will devote their gain to our Father, their wealth to the Sovereign of all the earth. Oh Siona, mboka kitoko, telema mpe tuta ble, pamba te nakopesa yo maseke ya bibende mpe basapato ya bronze, bongo okobuka bikolo ebele mike-mike mpe okopesa bomengo na bango, oyo bazwaki na nzela ya mabe, lokola likabo epai na Yawe, mpe bozwi na bango epai na Mokonzi ya mokili mobimba.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]