Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Nahum 2 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

2Tala, mobebisi azali koya kosala yo mabe !Batela malamu bandako na yo batonga makasi,kengela nzela na yo,bongama mpo na bitumbampe sangisa bato na yo.

3Yawe akozongisa lisusu nkemboya Jakobi mpe ya Isalaele,atako babebisaki mpe bapanzaki mokili na bango,mpe atako babebisaki bilanga na bango ya vino.

4Banguba mpe bilamba ya basoda na bangoezali ya langi ya motane ;bibende ya bashar na bango ezali kongengana mokolo oyo babongisi mpo na bitumba,mpe makonga basala na nzete ekomi kotambola bipai na bipai.

5Bashar ezali kokota na elulu na nzela,ezali kokende mpe kozongana bisika oyo bato ebele bakutanaka ;ezali komonana lokola konioyo ezali kopela moto,ezali kotambola na bangambo nyonsolokola mikalikali.

6Abengi basoda na ye nyonso ya mpiko.nzokande, na nzela na bango, bazali kotepatepa,bazali kokende na lombangu pene ya mir.

7Bikuke ya ebale efungwami,mpe ndako na ye ya bokonzi ebukani.

8Ekatami ete engumba wana ekokende na bowumbumpe bakomema yango mosika penza ;basali na yango ya basi bakolela lokola bibengampe bakomibeta batolo likolo ya pasi.

9Na kala, engumba Ninive ezalakilokola liziba ya mayi.Kasi tala yango lelo oyo :etoboki mpe ekomi kobimisa mayi !Bazali kobelela : « Botelema ! Botelema ! »Kasi ata moto moko te azongi lisusu kuna.

10Bobotola wolo mpe palata na yango na makasi,pamba te bomengo na yango ezali penza mingi kolekampe etonda na biloko ya motuya.

11Bakoteli yango, bapanzi yango,babotoli na makasi biloko na yango ya talo !Mitema ebukani, mabolongo ekomi kolenga,mpe banzoto etondi na somo.

12Wapi sik’oyo libulu epai wapi bankosiezalaki kobokola bana na yango ?Wapi sik’oyo libulu epai wapi nkosi ya mwasielongo na bana na yangoezalaki kotambola na somo ata moke te ?

13Nkosi ebomi banyama ebelempo ete epesa yango lokola bileiepai ya bana na yango,ekangi nyama ya kolia mpo na mwasi na yango,bongo etondisi libulu na yango na banyamaoyo ebomi mpe na misuni.

14« Nakotombokela yo, »elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ;« nakozikisa bashar na yo na moto,mpe mopanga ekoboma bana ya nkosi na yo.Nakobotola yo misuni nyonso awa na se ;boye mongongo ya batindami na yoekotikala koyokana lisusu te. »

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]