Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 35 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then Elihu continued and said: Bongo Eliwu alobaki :
2 "Do you think this is just? You say, 'My righteousness is more than God's.' « Boni, okanisi ete yango ezali sembo ? Olobi : ‹ Nazali sembo liboso ya Nzambe. ›
3 For you ask, 'What good does it do you? What do I gain by not sinning?' Nzokande, ozali koloba : ‹ Nakozwa nini, litomba nini nakozwa soki nasali masumu te ? ›
4 I will answer you, and your friends along with you. Nalingi kopesa yo eyano, yo elongo na baninga na yo.
5 Look up at the heavens and see; gaze at the clouds, which are higher than you. Tombola miso na likolo mpe tala ; mona ndenge mapata ezali likolo na yo.
6 If you sin, what do you accomplish against him? And if your rebellions are many, what do you do to him? Soki osali masumu, ekosala Nzambe nini ? Soki masumu na yo ezali ebele, ekosala Ye nini ?
7 If you are righteous, what do you give him? Or what does he receive from your hand? Soki ozali sembo, okopesa Ye nini to akozwa nini na loboko na yo ?
8 Your wickedness affects only a man like yourself, and your righteousness only a fellow human. Mabe na yo ekokomela kaka bazalani na yo, bosembo na yo ezali na litomba kaka epai ya bana na bato.
9 People cry out under the weight of many oppressions; they call for help against the arm of the mighty. Bato bazali kolela na se ya mokumba ya minyoko, bazali koganga na se ya motema makasi ya bato minene.
10 But no one says, 'Where is God my Maker, who gives songs in the night, Kasi moto moko te azali koloba : ‹ Nzambe Mokeli na ngai, Ye oyo apesaka banzembo ya esengo na butu,
11 who teaches us more than the beasts of the earth and makes us wiser than the birds of the sky?' Ye oyo ateyaka biso koleka banyama ya mokili mpe akomisaka biso mayele koleka bandeke ya likolo, azali wapi ? ›
12 There they cry out, but he gives no answer, because of the pride of evil men. Ata bagangi, Nzambe akoyanola te, mpo na lolendo ya bato mabe.
13 Surely God does not listen to an empty cry; the Almighty pays it no attention. Pamba te, Nzambe ayokaka te maloba na bango ya pamba, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso azalaka ata na bokebi na yango te.
14 How much less, then, will he answer when you say you do not see him—though your case is before him and you must wait for him. Nzokande, yo ozali komeka koloba ete ozali komona Ye te, ete ozwi nanu eyano te na kolela na yo epai na Ye.
15 And now, because his anger has not yet punished, and he has taken little notice of foolishness. Mpe sik’oyo, soki kanda ya Nzambe eyei nanu likolo na yo te mpe soki Ye azali nanu kobosana maloba na yo ya soni,
16 Job opens his mouth with empty talk; he multiplies words without knowledge." elingi koloba ete yo, Yobo, ofungoli monoko na yo kaka na pamba mpe otondisi yango na maloba ya bozoba. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]