Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 36 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 And Elihu continued and said: Eliwu abakisaki lisusu :
2 "Bear with me a little, and I will show you, for there are still words to speak on God's behalf. « Yokela ngai nanu moke, nalingi koteya yo, nazali na makambo mingi mosusu ya koloba na tina na Nzambe.
3 I will bring my knowledge from afar, and ascribe righteousness to my Maker. Tala, nazali kozwa mosika boyebi na ngai mpo na kobundela mpe kolongisa Mokeli na ngai.
4 For truly my words are not false; one perfect in knowledge is with you. Yeba malamu ete maloba na ngai ezali ya lokuta te, ezali moto na boyebi ya solo nde azali pene na yo.
5 Look, God is mighty, yet he does not despise; he is mighty in strength of understanding. Tala monene ya Nzambe ! Kasi atiolaka na Ye bato te, nguya na Ye emonanaka na nzela ya mikano na Ye ya makasi. Azali na nguya, mpe mikano na Ye ebongwanaka te.
6 He does not keep the wicked alive, but gives justice to the afflicted. Atikaka moto mabe te kozala na bomoi, alongisaka banyokolami,
7 He never takes his eyes off the righteous; he seats them with kings on their thrones forever, and they are exalted. alongolaka miso na Ye te likolo ya bayengebene, avandisaka bango na kiti ya bokonzi elongo na bakonzi mpe atombolaka bango mpo na libela.
8 And if they are bound in chains, caught fast in cords of affliction, Kasi soki bato bakangami na minyololo to na basinga ya minyoko,
9 then he declares to them their deeds and their rebellions, that they have behaved arrogantly. atalisaka bango mabe oyo basali, mpe masumu oyo basalaka mpo na lolendo na bango.
10 He opens their ear to instruction, and commands that they turn back from sin. Afungolaka bango matoyi mpo na kokebisa bango mpe atindaka bango kotika mabe.
11 If they listen and serve him, they finish their days in prosperity, and their years pass pleasantly. Soki batosi mpe basaleli Ye, bakolekisa mikolo na bango oyo etikali na bomengo, mpe mibu na bango na esengo.
12 But if they do not listen, they perish by the sword, and die without knowledge. Kasi soki batosi Ye te, bakokufa na mopanga mpe bakosila mpo na kozanga boyebi.
13 The godless at heart harbor anger; they do not cry for help when he binds them. Bato oyo bayebi Nzambe te mpe mitema na bango etondisami na kanda, babelelaka Nzambe te tango akangaka bango minyololo.
14 Their soul dies in youth, and their life ends among the cult prostitutes. Bakufaka na bolenge, basukisaka bomoi na bango kati na mibali oyo bamipesaka na kindumba ya bule.
15 He delivers the afflicted by their affliction, and opens their ear through adversity. Kasi bato oyo bazali konyokwama, akangolaka bango na nzela ya minyoko na bango, afungolaka bango matoyi na nzela ya pasi.
16 He would also have drawn you out of the jaws of distress to a wide, open place with no constraint, and your table would be spread with richness. Yo mpe, Nzambe alekisi yo na nzela ya nkaka mpe ya pasi mpo na kovandisa yo na esika ya pole, esika oyo ezangi mitungisi ; akotondisa mesa na yo na biloko ya kitoko.
17 But you are consumed with the judgment due the wicked; judgment and justice have taken hold of you. Kasi soki sik’oyo ozali kosala lokola moto mabe, etumbu mpe kosambisama ekokweyela yo.
18 Beware that wrath does not entice you into scoffing, and do not let a large ransom lead you astray. Tika ete elakeli mabe oyo etelemeli yo etinda yo te na kotomboka ! Boni, okoki kopesa kanyaka na bato ebele ? Kasi kopengwa te !
19 Can your cry for help keep you from distress, or all the forces of your strength? Boni, bozwi na yo ezali solo na motuya mpo na kokangola yo ? Ezala mabanga na yo ya wolo to makasi na yo nyonso, boni, ekokoka solo kokangola yo ?
20 Do not long for the night, when peoples are cut off from their place. Kozala na posa te ya butu oyo elongolaka bato kati na bandako na bango.
21 Take care; do not turn to sin, for you have chosen this rather than affliction. Mibatela ete okweya na mabe te, pamba te osepeli na mabe koleka minyoko.
22 Look, God is exalted in his power; who is a teacher like him? Tala, Nzambe azali Mokonzi ya nguya na Ye, nani ateyaka koleka Ye ?
23 "Who has prescribed for him his way, or who can say, 'You have done wrong'? Nani akengelaka etamboli na Ye ? Nani akoki koloba na Ye : ‹ Ozali kosala mabe ? ›
24 Remember to extol his work, which people have celebrated in song. Kanisa kokumisa misala na Ye, misala oyo bato bazali kokumisa na banzembo.
25 All mankind has looked on it; humanity sees it from afar. Bato nyonso bamonaka yango, batalaka yango na mosika.
26 Look, God is great, and we do not know him; the number of his years is beyond searching. Tala ndenge nini Nzambe azali monene ! Tososolaka yango te. Moto moko te akoki kotanga motango ya mibu na Ye.
27 For he draws up the drops of water; they distill as rain from his mist, Abendaka mayi epai na Ye, na mapata ; akomisaka yango mvula, mvula oyo enokaka mpe etondisaka bibale.
28 which the clouds pour down and drop abundantly on mankind. Mapata ekweyisaka yango, mpe enokisaka yango likolo na ebele ya bato.
29 Can anyone understand the spreading of the clouds, the thunder of his pavilion? Nani akoki kososola ndenge Nzambe apanzaka mapata mpe ndenge bakake ebimaka wuta na ndako na Ye ?
30 Look, he scatters his lightning around him, and covers the depths of the sea. Tala ndenge abetisaka bakake likolo ya bato mpe atondisaka mozindo ya ebale monene.
31 For by these he governs the peoples; he gives food in abundance. Na nzela ya biloko oyo nyonso, Nzambe asambisaka bikolo mpe apesaka bilei ebele.
32 He fills his hands with the lightning, and commands it to strike the mark. Atondisaka maboko na Ye mibale na mikalikali, akotinda yango na esika oyo Ye aponi.
33 Its crashing tells of him; even the cattle sense the storm coming." Makelele ya bakake epesaka sango ya koya na Ye, ata kutu bibwele esosolaka koya na Ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]