Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 37 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "At this also my heart trembles and leaps from its place. Mpo na yango, motema na ngai ezali kolenga mpe ezali kobeta makasi lokola nde elingi kobima na esika na yango.
2 Listen closely to the thunder of his voice, to the rumbling that goes out from his mouth. Yoka ! Yoka makelele ya mongongo na Ye, makelele oyo ezali kobima na monoko na Ye.
3 Under the whole heaven he lets it loose, and his lightning to the corners of the earth. Azali kotinda yango na mokili mobimba, mpe kake na Ye kino na suka ya mokili.
4 After it a voice roars; he thunders with his majestic voice, and he does not hold back the lightning when his voice is heard. Sima na yango, konguluma na Ye ekoyokana, akoganga makasi na mongongo ya bokonzi na Ye ; akokanga mikalikali ya monoko na Ye te, wana mongongo na Ye ezali koyokana.
5 God thunders wondrously with his voice; he does great things that we cannot comprehend. Na nzela ya mongongo na Ye ya makasi, Nzambe asalaka bikamwa, asalaka makambo minene, makambo minene oyo mayele na biso ekoki kososola te.
6 For to the snow he says, 'Fall on the earth,' and to the rain shower, 'Be a mighty downpour.' Alobaka na mvula ya pembe : ‹ Sopana na mabele. › Alobaka bongo lisusu na mvula ya makasi : ‹ Sopana. ›
7 He seals up the hand of every person, so that everyone he has made may know his work. Boye, atiaka kashe na loboko ya moto nyonso mpo ete moto nyonso ayeba misala na Ye. Atondisaka bato nyonso na somo ya nguya na Ye.
8 Then the animals go into their lairs and stay in their dens. Banyama ezongaka na bandako na yango mpe evandaka kati na libulu na yango.
9 From its chamber comes the whirlwind, and from the scattering winds the cold. Mopepe makasi ewutaka na ngambo ya sude, malili mpe mipepe, na ngambo ya nor.
10 By the breath of God ice forms, and the broad waters freeze solid. Na mopepe oyo ebimaka na monoko ya Nzambe, mayi ebongwanaka libanga mpe bitima ya mayi ekondaka.
11 He loads the thick cloud with moisture; the clouds scatter his lightning. Atondisaka mapata na mayi, mpe pole na Ye epanzaka mapata ya mvula.
12 They turn round and round by his guidance, to do whatever he commands them across the face of the inhabited world. Na makasi na Ye, mapata ebalukaka na bangambo nyonso mpo na kokokisa nyonso oyo Ye atindaka yango kosala kati na mokili.
13 Whether for correction, or for his land, or for covenant love, he makes it happen. Ezalaka mpo na kopesa etumbu na mokili to mpo na kopambola yango.
14 "Listen to this, Job; stand still and consider the wonders of God. Yoka, Yobo ! Telema mpe sosola bikamwa ya Nzambe.
15 Do you know how God lays his command on them, and makes the lightning of his cloud flash? Oyebi ndenge nini Nzambe akambaka mapata, mpe ndenge nini angengisaka mikalikali na Ye na mapata ?
16 Do you know how the clouds hang balanced, the wonders of the one perfect in knowledge? Oyebi ndenge nini mapata evandaka malamu ? Ezali bikamwa ya Ye-Oyo-Akoka-Na-Boyebi-Nyonso.
17 You whose clothes are hot when the land lies still under the south wind, Bilamba na yo ezali na moto, nzokande mabele ezali konyokwama na mopepe ya midi.
18 can you, with him, spread out the skies, hard as a mirror of cast metal? Boni, okoki solo kosunga Nzambe mpo na kotanda likolo elongo na Ye, likolo oyo ezali makasi lokola talatala ya ebende banyangwisa na moto ?
19 "Teach us what we should say to him; we cannot make our case because of the darkness. Yebisa biso makambo oyo tosengeli koloba na Ye ; tokoki koloba likambo moko te mpo na molili na biso.
20 Should he be told that I want to speak? Would anyone ask to be swallowed up? Boni, basengeli koyebisa Ye ete nalingi koloba ? Basengeli koyebisa Ye mpo ete ayeba yango ?
21 And now no one can look at the light when it is bright in the skies, after the wind has passed and cleared them. Na pwasa, moto moko te azali komona lisusu pole ; ebombami kati na mapata. Kasi soki mopepe eleki, elongoli yango nyonso.
22 Out of the north comes golden splendor; awesome majesty surrounds God. Kongenga lokola wolo ezali koya wuta na ngambo ya nor. Nzambe avandi kati na nkembo ya somo.
23 The Almighty—we cannot reach him; he is great in power, yet in justice and abundant righteousness he does no wrong. Azali Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, tokoki te kokoma esika Ye azali ; azali monene na nguya mpe na solo ; azali Mokonzi ya sembo, akoki konyokola te moto oyo azali sembo.
24 Therefore people fear him; he pays no attention to those who are wise in their own eyes." Yango wana bato basengeli kokumisa Ye, kasi Ye atiaka miso na Ye te likolo ya bato oyo bakanisaka ete bazali bato ya bwanya. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]