Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 34 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then Elihu continued and said: Eliwu azwaki maloba mpe alobaki :
2 "Hear my words, you wise men; give ear to me, you who know. « Bino bato ya bwanya, boyoka maloba na ngai ; bino bato ya mayele, boyoka ngai !
3 For the ear tests words as the mouth tastes food. Pamba te litoyi nde esosolaka maloba ndenge lolemo emekaka bilei.
4 Let us choose what is right; let us know among ourselves what is good. Tososola mpo na biso moko makambo ya sembo, toyekola elongo makambo oyo ezali malamu.
5 For Job has said, 'I am righteous, and God has taken away my justice; Tala makambo oyo Yobo azali koloba : ‹ Nasali mabe te, kasi Nzambe aboyi kolongisa ngai.
6 though I am in the right, I am counted a liar; my wound is incurable, though I am without rebellion.' Atako nazali sembo, bazali kozwa ngai lokola mokosi ; atako nasali mabe te, likonga na Ye ezokisi ngai pota oyo esilaka te. ›
7 What man is like Job, who drinks up scoffing like water, Nani azali lokola Yobo, oyo amelaka kotiolama lokola mayi ?
8 who keeps company with evildoers and walks with wicked men? Atambolaka elongo na banyokoli ya bato, asanganaka na bato mabe.
9 For he has said, 'A man gains nothing by delighting in God.' Pamba te alobi : ‹ Ezali na litomba te epai na moto, na koluka kosepelisa Nzambe. ›
10 Therefore hear me, you men of understanding: far be it from God to do wickedness, and from the Almighty to do wrong. Boye, bino bato ya mayele, boyoka ngai ! Ekoki kosalema te ete Nzambe asala mabe ; ekoki kosalema te ete Nkolo-Na-Nguya-Nyonso asala makambo oyo ezangi bosembo.
11 For according to the work of a man he repays him, and according to his ways he brings it upon him. Azongiselaka moto na moto kolanda misala na ye, apesaka na moto na moto kolanda etamboli na ye.
12 Surely God will not do wickedly, and the Almighty will not pervert justice. Te, Nzambe akoki kosala mabe te, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki kobuka bosembo te.
13 Who gave him charge over the earth, and who laid on him the whole world? Nani akomisaki Ye Mokonzi ya mokili ? Nani apesaki Ye bokonzi likolo ya mokili mobimba ?
14 If he should set his heart on man and withdraw his spirit and his breath, Soki Nzambe azalaki kaka kokanisa mpo na Ye moko, mpe soki abatelaki kati na Ye moko molimo na Ye mpe pema na Ye,
15 all flesh would perish together, and man would return to dust. bato nyonso balingaki kokufa elongo, mpe moto nyonso alingaki kozonga putulu.
16 If you have understanding, hear this; listen to the sound of my words. Soki ozali na boyebi, yoka maloba oyo ; yoka makambo oyo nazali koloba.
17 Will one who hates justice govern? Will you condemn him who is righteous and mighty, Boni, moto oyo ayinaka bosembo akoki solo kozala mokonzi ? Okokweyisa solo Nkolo-Na-Bosembo mpe Nkolo-Na-Nguya ?
18 who says to a king, 'Worthless one,' and to nobles, 'Wicked men,' Ezali Ye nde alobaka na bakonzi : ‹ Bozali bato pamba, › mpe na bato ya lokumu : ‹ Bozali bato mabe ? ›
19 who shows no partiality to princes, nor regards the rich above the poor, for they are all the work of his hands? Aponaka bilongi ya bakambi te, mpe asalelaka bazwi bolamu te mpo na bozwi na bango koleka babola, pamba te bango nyonso basalemaki na maboko na Ye.
20 In a moment they die; at midnight the people are shaken and pass away, and the mighty are taken away by no human hand. Bato bazali kokufa mbala moko, kati na butu ; bazali kobunda-bunda mpe kolimwa, bato ya nguya bazali kolongwa atako loboko ya moto etindiki bango te.
21 For his eyes are on the ways of a man, and he sees all his steps. Miso na Ye ezali likolo ya banzela ya bato, amonaka etamboli na bango nyonso.
22 There is no darkness or deep shadow where evildoers may hide themselves. Ezala molili, ezala libulu ya kufa, eloko moko te ekoki kobomba bato mabe.
23 For God has no need to consider a man further, that he should go before God in judgment. Nzambe azali na posa ya kolanda-landa bato te mpo ete bakoka koya liboso na Ye mpo na kosambisama.
24 He shatters the mighty without inquiry and sets others in their place. Abomaka bato ya makasi ata soki aluki koyeba tina te mpe atiaka bato mosusu na esika na bango.
25 Thus, knowing their works, he overturns them in the night, and they are crushed. Pamba te ayebi misala na bango, akweyisi bango na butu moko, mpe babebisami.
26 He strikes them for their wickedness in the sight of onlookers, Apesaka bango etumbu lokola bato mabe na esika oyo bato nyonso bakoki komona,
27 because they turned aside from following him and had no regard for any of his ways, pamba te baboyaki kolanda Ye mpe kososola banzela na Ye.
28 so that they drove the poor to cry out to him, and he heard the cry of the afflicted. Bakomisaki koganga ya babola kino epai ya Nzambe, mpe koganga ya banyokolami eyokanaki epai na Ye.
29 When he is quiet, who can condemn? When he hides his face, who can see him—whether it is a nation or a man, Kasi soki avandi kimia, nani akokweyisa Ye ? Soki abombi elongi na Ye, nani akoki komona Ye ? Nzokande, akengelaka bikolo mpe bato
30 so that no godless man may reign or ensnare the people. mpo na kopekisa bato mabe ete bakamba mokili te mpe batiela bato mitambo te.
31 For has anyone said to God, 'I have borne my punishment; I will offend no more; Soki moto moko alobi na Nzambe : ‹ Nasali mabe, nazwi etumbu ya masumu na ngai, kasi nakosala lisusu mabe te.
32 teach me what I do not see; if I have done wrong, I will do it no more'? Lakisa ngai makambo oyo nazali kokoka komona te ; soki nasali mabe, nakozongela yango lisusu te. ›
33 Will he repay you on your own terms because you reject his correction? For you must choose, not I; therefore declare what you know. Boni, Nzambe akoki kopesa yo etumbu ? Nayebi ete ondimi na yo te. Yo nde osengeli kozwa mokano, kasi ngai te ! Yebisa ngai makambo oyo yo oyebi.
34 Men of understanding will say to me, and every wise man who hears me will say, Bato ya mayele mpe bato ya bwanya oyo bazali koyoka ngai balobaki :
35 'Job speaks without knowledge; his words are without insight.' ‹ Yobo azali koloba na boyebi te, maloba na ye ezali na tina te. ›
36 If only Job were tested to the limit for answering like wicked men! Oh ! Tika ete Yobo asambisama kino na suka mpo ete apesa biyano lokola moto mabe !
37 For he adds rebellion to his sin; he mocks us openly and multiplies his words against God." Pamba te, na lisumu na ye, azali kobakisa kotomboka, azali kotia tembe kati na biso mpe azali kokoba kobakisa maloba mpo na kotelemela Nzambe. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]