Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 33 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "But now, Job, hear my words; listen to everything I say. Kasi sik’oyo, Yobo, yoka maloba na ngai, tia matoyi mpo na koyoka maloba na ngai !
2 Look, I have opened my mouth; my tongue forms words on my palate. Tala, nafungoli monoko na ngai, maloba na ngai ezali na songe ya lolemo.
3 My words come from an upright heart, and my lips speak sincerely what they know. Maloba na ngai ewuti na motema ya sembo, bibebu na ngai ezali penza koloba makambo oyo ngai nayebi.
4 The Spirit of God has made me, and the breath of the Almighty gives me life. Molimo ya Nzambe asalaki ngai, pema ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso epesi ngai bomoi.
5 Answer me, if you can; set your case in order before me, and take your stand. Boye soki okoki, yanola ngai, mibongisa mpo na komekana na ngai.
6 Look, I am just like you before God; I too was pinched off from clay. Nazali kaka lokola yo liboso ya Nzambe ; ngai mpe nawutaki na putulu.
7 No dread of me should terrify you, and no pressure from me should weigh you down. Boye, somo na ngai ebangisa yo te, mpe monene ya loboko na ngai epanza yo te.
8 "Surely you have said in my hearing—I heard the very sound of your words. Kasi olobaki na matoyi na ngai— mpe nazali nanu koyoka makelele ya maloba na yo—
9 'I am pure, without rebellion; I am clean, and there is no guilt in me. ‹ Nazali sembo, nasali masumu te ; nazali peto, namemi na ngai ngambo te. ›
10 Yet he finds fault with me; he counts me as his enemy. Nzokande, Nzambe amoni mbeba kati na ngai, azali kozwa ngai lokola monguna na Ye.
11 He puts my feet in the stocks; he watches all my paths.' Akangi makolo na ngai na bibende, azali kononga banzela na ngai nyonso.
12 "But in this you are not right, I answer you, for God is greater than any mortal. Kasi, kati na nyonso oyo, ngai nalobi, ozali na elonga te, pamba te Nzambe azali monene koleka moto.
13 Why do you contend against him, that he answers none of a person's words? Mpo na nini ozali kosamba na Ye ? Alimbolaka tina ya misala na Ye epai ya moto moko te.
14 For God speaks in one way, and then another, though no one perceives it. Nzokande, Nzambe alobaka, na lolenge moko to na lolenge mosusu, kasi moto asosolaka yango te.
15 In a dream, in a vision of the night, when deep sleep falls on people as they slumber on their beds, Alobaka kati na ndoto, kati na emoniseli ya butu, tango bato bazwaka pongi makasi wana balali na mbeto ;
16 then he opens their ears and impresses his warnings upon them, boye, akoki kofungola matoyi ya bato mpe kobeta sete na makebisi oyo azali koloba,
17 to turn a person from wrongdoing and to keep a man from pride, mpo na kotia moto mosika ya misala na ye ya mabe mpe kobatela ye na lolendo,
18 he holds back their soul from the pit, their life from perishing by the sword. mpo na kobatela molimo na ye mpo ete ekufa te, mpe bomoi na ye mpo ete ebebisama te na mopanga.
19 "A person is also rebuked with pain on his bed, with constant aching in his bones, Nzokande, moto akoki mpe, mbala mosusu, koteyama na mbeto na ye, na nzela ya kobela mpe ya minyoko ya tango nyonso kati na mikuwa na ye.
20 so that his life loathes bread, and his soul the choicest food. Boye, azali kosepela lisusu na lipa te, mpe motema na ye ekomi koboya bilei oyo alingaka mingi.
21 His flesh wastes away, and his bones, once hidden, stick out. Nzoto na ye ekawuki na pamba, mpe mikuwa na ye, oyo ebombama, ebimi.
22 His soul draws near the pit, and his life to those who bring death. Molimo na ye ezali kopusana pene ya kunda, mpe bomoi na ye, pene ya bamemi sango ya kufa.
23 "If there is a messenger for him, a mediator—one out of 1,000—to declare to a person what is right for him, Nzokande, soki ekoki kozala ata na anjelu moko, kati na ba-anjelu nkoto moko, mpo na koyebisa na moto makambo oyo ezali sembo,
24 and is gracious to him and says, 'Spare him from going down to the pit; I have found a ransom,' tika ete asalela ye ngolu mpe aloba : ‹ Bikisa ye ete akota te kati na libulu ya kufa, nasili kofuta niongo mpo na kosikola ye, ›
25 then his flesh grows fresher than a child's; he returns to the days of his youth. nzoto na ye ekokoma lisusu sembesembe lokola na tango ya bolenge na ye, ekozonga ndenge ezalaki na bomwana na ye.
26 He prays to God, and the worshiper is accepted by him; the worshiper sees God's face with shouts of joy, and God restores his righteousness to that person. Akosambela Nzambe, akozwa ngolu na miso na Ye, akomona Nzambe na miso mpe akoganga na esengo. Nzambe akozwa ye lisusu lokola moto ya sembo.
27 He sings out before others and says, 'I sinned and twisted what was right, yet it was not repaid to me. Boye akoyemba na miso ya bato mpe akoloba : ‹ Nasalaki masumu mpe natambolaki na bosembo te, kasi nazwi lifuti oyo nasengelaki kozwa te.
28 He redeemed my soul from going down to the pit, and I will see the light.' Nzambe akangoli molimo na ngai na libulu ya kufa, mpe nakowumela kati na pole na esengo. ›
29 "Look, God does all these things again and again with a person, Nzambe asalaka makambo oyo nyonso epai ya moto mbala mibale to mpe mbala misato,
30 to bring back his soul from the pit, that he may be lit with the light of the living. mpo na kolongola molimo na ye na libulu ya kufa, mpo ete pole ya bomoi ekoka kongenga likolo na ye.
31 "Pay attention, Job; listen to me. Be silent, and I will speak. Yobo, fungola matoyi, vanda kimia mpe yoka ngai ! Nazali na makambo ya koloba na yo.
32 If you have anything to say, answer me; speak, for I would gladly see you justified. Kasi soki ozali na likambo ya koloba, yebisa ngai yango, pesa ngai eyano, mpe ngai nakolongisa yo.
33 If not, then listen to me; be silent, and I will teach you wisdom." Soki te, vanda kimia mpe yoka ngai, mpe ngai nakoteya yo bwanya. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]