Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 32 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 So these three men stopped answering Job, because he was righteous in his own eyes. Bato wana misato batikaki koyanola Yobo, pamba te azalaki komimona sembo na miso na ye moko.
2 Then the anger of Elihu son of Barachel the Buzite, of the family of Ram, burned hot. His anger burned against Job because he justified himself rather than God. Kasi Eliwu, mwana mobali ya Barakeyeli, moto ya libota ya Buzi mpe ya etuka ya Rami, asilikelaki Yobo makasi, pamba te amimonaki sembo koleka Nzambe.
3 His anger also burned against Job's three friends, because they had found no answer and yet had condemned Job. Asilikelaki mpe baninga misato ya Yobo, pamba te balongaki te kopesa Yobo eyano oyo esengeli ; nzokande bakweyisaki Nzambe.
4 Now Elihu had waited to speak to Job because the others were older than he. Eliwu awelaki te koloba moto ya liboso epai ya Yobo, pamba te baninga wana misato ya Yobo bazalaki mikolo na ye na mibu ya mbotama.
5 But when Elihu saw that these three men had nothing to say, his anger burned. Kasi tango Eliwu amonaki ete bato wana misato bazali lisusu na likambo ya koloba te, asilikaki makasi.
6 So Elihu son of Barachel the Buzite spoke up and said: "I am young in years, and you are old; that is why I held back, afraid to tell you what I know. Boye Eliwu, mwana mobali ya Barakeyeli, moto ya libota ya Buzi, alobaki : « Nazali leki na mibu ya mbotama, mpe bino bozali mikolo ; yango wana nazalaki kobanga mpe nazangaki makasi ya koloba na bino makambo oyo ngai nayebi.
7 I thought, 'Let age speak, and many years teach wisdom.' Nazalaki komilobela : ‹ Bato oyo bazali na mibu ebele ya mbotama bakoyeba koloba, pamba te kozala na mibu ebele epesaka bwanya. ›
8 But it is the spirit in a person, the breath of the Almighty, that gives understanding. Nzokande, kati na moto, ezali nde molimo, ezali pema ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso nde epesaka moto boyebi.
9 It is not the old who are wise, nor the elderly who understand what is right. Ezali kaka mibange te nde bazali na bwanya, mpe ezali kaka bampaka te nde basosolaka makambo oyo ezali sembo.
10 So I say, listen to me; I too will tell what I know. Yango wana nalobi : Boyoka ngai, ngai mpe nakoloba na bino makambo oyo nayebi.
11 Look, I waited for your words; I listened for your reasoning while you searched for what to say. Tango bino bozalaki koloba, ngai nazalaki koloba te, nazalaki koyoka makanisi na bino, wana bozalaki koluka makambo ya koloba.
12 I gave you my full attention; but not one of you proved Job wrong or answered his arguments. Nalandaki bino na bokebi nyonso ; moko te kati na bino amoni mabe ya Yobo, moko te kati na bino alongi makanisi ya Yobo.
13 So do not say, 'We have found wisdom; let God refute him, not man.' Boloba te : ‹ Tomoni bwanya ; Nzambe kaka nde akoki kolonga ye, kasi moto te. ›
14 Job has not marshaled his words against me, and I will not answer him with your arguments. Lokola Yobo alobaki maloba na ye epai na ngai te, ngai mpe nakosalela makanisi na bino te mpo na kozongisela ye eyano.
15 They are dismayed and have no more to say; words have failed them. Bayoki soni, batikali ata na liloba moko te ya koloba, makambo ya koloba esili bango na minoko !
16 Must I wait, now that they are silent, now that they stand there with no reply? Boni, nasengeli sik’oyo kozela, awa bazangi maloba to basuki wana mpe bakangi minoko ?
17 I too will have my say; I too will tell what I know. Ngai mpe nakoloba sik’oyo, nakoloba makambo oyo nayebi.
18 For I am full of words; the spirit within me compels me. Lokola maloba ebele etondi kati na ngai, motema na ngai ezali kopela lokola moto.
19 Inside, I am like wine that has no vent, like new wineskins ready to burst. Kati na ngai, nazali lokola mbeki ya vino oyo ezali kotoka, lokola mbeki ya vino ya sika oyo ekomi pene ya kopasuka.
20 I must speak and find relief; I must open my lips and answer. Nakoloba mpo ete motema na ngai ekita, nakofungola bibebu na ngai mpo ete nayanola.
21 I will show no partiality to anyone, and I will flatter no one; Nakopona bilongi te, nakobondela mpe moto moko te ;
22 for I do not know how to flatter—if I did, my Maker would soon take me away." pamba te, soki nayebaki kobondela bato, Mokeli na ngai alingaki kolongola ngai mbala moko.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]