Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 31 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "I made a covenant with my eyes; how then could I gaze at a virgin? « Nasalaki boyokani elongo na miso na ngai ete nalula elenge mwasi te.
2 For what portion would I have from God above, what inheritance from the Almighty on high? Pamba te, libula nini Nzambe akoki kobongisela ngai wuta na likolo ? Libonza nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki kotindela ngai wuta na likolo ?
3 Is it not calamity for the unjust, and disaster for those who do evil? Boni, pasi ezali mpo na bato mabe te ? Kobebisama ezali mpo na bato oyo basalaka masumu te ?
4 Does he not see my ways, and count my every step? Amoni banzela na ngai te ? Atangi matambe na ngai nyonso te ?
5 "If I have lived by falsehood, and my foot has rushed into deceit, Soki natambolaki na lokuta to litambe na ngai elandaki nzela mabe,
6 let him weigh me on honest scales, and let God know my integrity, tika ete Nzambe ameka ngai na emekelo ya sembo, mpe akomona ete ngai nasali mabe te.
7 if my steps have turned from the way, and my heart has followed my eyes, and any stain has clung to my hands, Soki matambe na ngai ebimaki na nzela na Ye, soki motema na ngai etambolisamaki kolanda miso na ngai, soki maboko na ngai ekomaki mbindo,
8 then let me sow and another eat, and let what springs up for me be uprooted. tika ete bato mosusu balia biloko oyo ngai naloni, mpe tika ete nkona na ngai epikolama !
9 "If my heart has been enticed by a woman, and I have lurked at my neighbor's door, Soki motema na ngai ekosamaki na mwasi to soki natalaki na makanisi mabe ekuke ya mozalani na ngai,
10 then let my wife serve another man, and let others sleep with her. tika ete mwasi na ngai atutela moto mosusu ble mpe tika ete mibali mosusu basangisa na ye nzoto.
11 For that would be a shameful crime, a sin deserving judgment; Pamba te elingaki kozala likambo ya soni, mpe lisumu ya boye ebongi na esambiselo ya basambisi.
12 for it is a fire that consumes down to Destruction, and would burn away all my harvest. Ezali moto oyo ezali kozikisa kino na kobebisama mpe ekoki kobebisa bomengo na ngai nyonso.
13 "If I have denied justice to my male or female servant when they brought a complaint against me, Soki nasalelaki na bosembo te bawumbu na ngai ya mibali mpe ya basi tango bazwaki ngai mabe,
14 what then will I do when God rises up? When he calls me to account, what will I answer him? nakosala nini soki Nzambe asambisi ngai ? Nakopesa eyano nini tango akotuna ngai ndenge nini nabandaki kosala ?
15 Did not the one who made me in the womb make my servant also? Did not the same one form us both in the womb? Ezalaki Ye te oyo asalaki ngai kati na libumu ya mama na ngai nde asalaki bango ? Ngai na bango, tozalaki lolenge moko te kati na mabumu ya bamama na biso ?
16 "If I have kept the poor from what they needed, or let the widow's eyes grow weary, Soki nakokisaki te posa ya mobola to soki nalembisaki miso ya mwasi oyo akufisa mobali,
17 or eaten my food alone while the orphan went without, soki nabombaki lipa na ngai mpo na ngai moko to nakabolaki yango te na bana bitike,
18 though from my youth I raised him as a father would, and from my mother's womb I guided the widow, —nzokande wuta bolenge na ngai, nazalaki kobokola bana bitike lokola tata na bango ; mpe wuta mbotama na ngai, nazalaki kolakisa nzela na mwasi oyo akufisa mobali—
19 if I have seen anyone perishing for lack of clothing, or a needy person with no covering, soki namonaki mobola kokufa na kozanga bilamba to moto akelela kozanga bilamba,
20 if his whole being has not blessed me for warming him with the fleece of my sheep, bongo motema na ye epambolaki ngai te na ndenge nazipaki ye na bilamba oyo ewutaki na bibwele na ngai,
21 if I have raised my hand against the orphan because I saw my backing in the court, soki natombolaki loboko na ngai mpo na kosala mwana etike mabe, wana nayebaki ete nazali na nguya liboso ya basambisi,
22 then let my shoulder be wrenched from its blade, and my arm be broken at the socket. tika ete loboko na ngai elongwa na lipeka na ngai to ebukana !
23 For calamity from God was a terror to me, and before his majesty I could do nothing. Pamba te nazalaki kobanga etumbu ya Nzambe, mpe nakokaki te kosala eloko liboso ya lokumu na Ye.
24 "If I have made gold my confidence, or said to fine gold, 'You are my security,' Soki natiaki elikya na ngai na wolo to nalobaki na wolo ya kitoko : ‹ Ozali ekimelo na ngai, ›
25 if I have gloated that my wealth was great, that my hand had gained so much, soki nasepelaki na ebele ya bozwi na ngai, bomengo oyo maboko na ngai esalaki,
26 if I have looked at the sun when it shone, or the moon moving in splendor, soki natalaki moyi na kongenga na yango to sanza kotambola na nkembo,
27 so that my heart was secretly enticed, and my hand blew them a kiss in worship, soki motema na ngai ekosamaki na nkuku, mpe maboko na ngai epesaki yango beze ya lokumu,
28 this too would be a sin deserving judgment, for I would have been false to God above. wana elingaki lisusu kozala mbeba oyo ebongi na esambiselo ya basambisi, pamba te nalingaki kowangana Nzambe oyo azali na Likolo.
29 "If I have rejoiced at the ruin of the one who hated me, or thrilled when harm overtook him. Soki nasepelaki na pasi ya monguna na ngai to nagangaki na esengo na likama oyo ekomelaki ye,
30 I never let my mouth sin by calling down a curse on his life, soki napesaki nzela na monoko na ngai ete esala lisumu na kosenga kufa ya monguna na ngai na nzela ya maloba ya kolakela mabe;
31 if the men of my household have never said, 'Who has not been filled from his table?', soki bato ya libota na ngai balobaka te : ‹ Nani oyo atondaki te na misuni ya banyama ya Yobo ? ›
32 no stranger ever spent the night in the street, for I opened my doors to the traveler. Soki mopaya moko te alalaki libanda, pamba te ekuke na ngai ezalaki ya kofungwama tango nyonso mpo na moleki nzela,
33 If I have covered my sins as others do, hiding my guilt within my heart, soki nabombaki lisumu na ngai ndenge Adamu asalaki to nabombaki yango na motema na ngai,
34 because I so feared the crowd, and the contempt of clans terrified me, that I kept silent and would not go outside. pamba te nabangaki bato mpe nabangaki ete mabota etiola ngai, yango wana nakangaki monoko mpe nakokaki kobima libanda te !
35 "Oh, that someone would hear me! Here is my signature—let the Almighty answer me! Let my accuser write out his indictment! Ah, soki nazalaki ata na moto oyo akokaki koyoka ngai ! Yango nde sik’oyo liloba na ngai ya suka. Tika ete Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ayanola ngai ! Tika ete moto oyo afundi ngai akoma na mokanda makambo oyo afundeli ngai !
36 Surely I would carry it on my shoulder, I would bind it on me like a crown. Solo, nalingaki komema yango na lipeka na ngai, nalingaki kolata yango lokola motole,
37 I would give him an account of my every step; like a prince I would approach him. nalingaki kotalisa Ye makambo nyonso oyo nasalaki, nalingaki kopusana pene na Ye lokola mokambi.—
38 "If my land has cried out against me, and its furrows have wept together, Soki mabele na ngai eboyi ngai, soki mikala na yango elelaki,
39 if I have eaten its yield without payment, or crushed the life out of its owners, soki naliaki bambuma na yango na ofele to soki natungisaki bankolo na yango,
40 then let thistles grow instead of wheat, and stinkweed instead of barley." The words of Job are ended. tika ete banzube ebima na esika ya ble, mpe matiti mabe ebima na esika ya orje. » Oyo nde suka ya maloba ya Yobo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]