Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 30 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "But now those younger than I laugh at me—men whose fathers I would have refused to put with the dogs of my flock. « Kasi sik’oyo, nakomi eloko ya kotiola epai ya bilenge oyo batata na bango bazangaki tina, mpe oyo nakokaki kutu te kopesa nzela ya kolia esika moko na mbwa na ngai, oyo ezalaki kobatela bibwele na ngai.
2 What good was the strength of their hands to me? Their vigor was spent. Makasi ya maboko na bango ekokaki kutu kosunga ngai na nini ? Pamba te basilaki makasi na nzoto,
3 Gaunt with poverty and hunger, they gnawed the parched ground in the gloom of waste and desolation. bazalaki bato bakawuka na nzala mpe na kozanga, bato oyo bazalaki kolia mabele ya esobe mpe ezanga matiti.
4 They plucked saltwort among the bushes, and the roots of the broom tree were their food. Bazalaki kobuka matiti ya mungwa kati na banzete mpe kolia misisa ya banzete mike.
5 They were driven out from human company; people shouted after them as after a thief. Babenganaki bango kati na bato na bango, babelelaki bango lokola miyibi.
6 They had to live in the gullies of dry riverbeds, in holes in the ground and the rocks. Bazalaki kovanda na nzela ya mayi ekawuka, kati na mabulu ya mabele mpe ya mabanga ;
7 Among the bushes they brayed; under the nettles they huddled together. bazalaki kolela lokola banyama kati na banzete mike ya nzube, bazalaki kosangana na se ya banzete mikuse.
8 A senseless, nameless brood, they were driven out of the land. Bana oyo batata na bango bazanga mayele mpe bazanga kombo babenganaki bango libanda ya mboka.
9 "And now I have become their taunting song; I am a laughingstock to them. Sik’oyo, bana na bango ya mibali bakomi koseka ngai na banzembo, nakomi lisapo kati na minoko na bango.
10 They detest me and keep their distance; they do not hold back from spitting in my face. Bazali koyina ngai mpe bakimi mosika na ngai, bazali na somo te ya kobwakela ngai soyi na elongi.
11 Because God has loosed my bowstring and humbled me, they have thrown off all restraint before me. Mpo ete Nzambe alembisi singa ya tolotolo na ngai mpe ayokisi ngai soni, bazali komipekisa na likambo moko te liboso na ngai.
12 On my right hand the rabble rise up; they shove my feet aside and build their siege ramps of ruin against me. Na loboko na ngai ya mobali, lisanga ya bato mabe ezali kobundisa ngai, batie mitambo na makolo na ngai, batie mabaku na nzela na ngai mpo na kosala ngai mabe ;
13 They tear up my path; they profit from my calamity, and no one holds them back. bakangi nzela na ngai, balongi kobebisa ngai atako moto moko te asungaki bango.
14 They advance as through a wide breach; amid the crash they come surging in. Bazali koya lokola na nzela ya lidusu ya monene, bazali kobunda-bunda kati na ndako ebukana.
15 Terrors are turned loose against me; my honor is driven away as by the wind, and my prosperity has passed like a cloud. Somo elati ngai, lokumu na ngai ekeyi lokola mopepe, bomengo na ngai elimwe lokola lipata.
16 "And now my life is poured out within me; days of affliction have seized me. Sik’oyo, bomoi na ngai ekeyi, mpe mikolo ya pasi ekangi ngai.
17 At night my bones are pierced through, and the gnawing pains never rest. Butu ezali kotobola mikuwa na ngai mpe pasi ezali kozangisa ngai pongi.
18 With great force my garment is twisted; it binds me tight like the collar of my tunic. Na nguya na yango, pasi ekomi lokola kingo ya nzambala na ngai.
19 Our Father has thrown me into the mire, and I have become like dust and ashes. Nzambe abwaki ngai na potopoto, mpe nakomi lokola putulu ya mabele to ya moto.
20 "I cry to you for help, but you do not answer me; I stand up, and you only stare at me. Oh Nzambe, nazali koganga epai na Yo, kasi ozali kopesa ngai eyano te ; natelemi, kasi ozali kotala ngai kaka pamba.
21 You have turned cruel to me; with the strength of your hand you attack me. Obongwani monguna ya kanza mpo na ngai, ozali kobundisa ngai na nguya ya loboko na Yo.
22 You lift me up to the wind and make me ride it; you toss me about in the roar of the storm. Omemi ngai liboso ya mopepe mpe otiki ete mopepe yango emema ngai, bongo epumbwisi ngai mosika.
23 For I know you will bring me down to death, to the house appointed for all the living. Nayebi ete ozali komema ngai na kufa, na esika oyo obongisa mpo na bato ya bomoi.
24 "Yet does no one stretch out a hand from the ruins, or cry for help in his disaster? Kasi boni, moto oyo azali kokufa akoki kotombola ata loboko te ? Moto oyo azali na pasi, akoki te kosenga lisungi ?
25 Did I not weep for the one whose day was hard? Did my soul not grieve for the needy? Boni, nazalaki kolela te elongo na bato oyo bazalaki na pasi ? Motema na ngai eyokelaki babola mawa te ?
26 But when I hoped for good, evil came; when I waited for light, darkness fell. Nazelaki esengo, kasi pasi nde ekomeli ngai ; nazelaki pole, kasi molili nde ekomeli ngai.
27 My insides churn and will not be still; days of affliction confront me. Motema na ngai ezali kobaluka kati na ngai, wuta mokolo pasi oyo ekomeli ngai.
28 I go about blackened, but not by the sun; I stand up in the assembly and cry for help. Nakomi mwindo, kasi moyi te nde eyindisi ngai ; kati na lisanga, nakomi kaka kotelema mpe kobelela mpo na koluka lisungi.
29 I have become a brother to jackals and a companion to ostriches. Nakoma ndeko ya mbwa ya zamba mpe moninga ya maligbanga.
30 My skin turns black and peels away from me, and my bones burn with fever. Poso na ngai ya nzoto eyindi mpe ekomi kokweya-kweya, mikuwa na ngai ekawuki na moyi.
31 My lyre is tuned to mourning, and my flute to the sound of weeping." Lindanda na ngai etikali kaka mpo na matanga, mpe flite na ngai, mpo na kosunga mingongo ya baleli. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]