Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 29 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 And Job spoke again and said: Yobo akobaki koloba :
2 "Oh, that I were as in months gone by, as in the days when God watched over me, « Ah ! Soki nakokaki kozala lisusu ndenge nazalaki na basanza oyo eleki, ndenge nazalaki na mikolo oyo Nzambe azalaki kobatela ngai,
3 when his lamp shone over my head, and by his light I walked through darkness; tango mwinda na Ye ezalaki kongenga na moto na ngai, mpe tango, na pole na Ye, nazalaki kotambola kati na molili.
4 as I was in the days of my prime, when the intimate friendship of God rested over my tent, Ah ! Soki nakokaki kozala lisusu ndenge nazalaki na mikolo oyo nazalaki nanu na makasi, tango bolingo ya Nzambe ezalaki kopambola ndako na ngai,
5 when the Almighty was still with me, when my children were all around me; tango Nkolo-Na-Nguya-Nyonso azalaki nanu elongo na ngai bana mibali na ngai bazingelaki ngai,
6 when my steps were bathed in curds, and the rock poured out for me streams of oil. tango nzela na ngai etondisamaki na miliki mpe libanga ezalaki kosopa mafuta ya olive mpo na ngai !
7 When I went out to the gate of the city and took my seat in the public square, Tango nazalaki kokende na ekuke ya mboka mpe nazalaki kotia kiti na ngai na esika oyo bato ebele bakutanaka,
8 the young men saw me and stepped aside, and the aged rose and stood; bilenge bazalaki komona ngai mpe bazalaki kobombama, mibange bazalaki kotelema,
9 the princes held back their words and laid a hand over their mouths; bakambi bazalaki kozanga maloba mpe kozipa minoko na bango na maboko,
10 the voice of the nobles was hushed, and their tongues clung to the roof of their mouths. bato ya lokumu bazalaki kokitisa mingongo na bango mpe lolemo na bango ezalaki kokangama na minoko na bango.
11 When the ear heard, it called me blessed, and when the eye saw, it bore witness for me, Moto nyonso oyo azalaki koyoka ngai azalaki koloba ete nazali moto ya esengo, mpe bato nyonso oyo bazalaki komona ngai bazalaki kotatola mpo na ngai ;
12 because I rescued the poor who cried out, and the orphan who had no one to help. pamba te nazalaki kosunga babola oyo bazalaki kosenga lisungi, mpe mwana etike oyo azangi moto oyo akosunga ye.
13 The blessing of the one about to perish came upon me, and I made the widow's heart sing for joy. Moto oyo akomaki pene ya kokufa azalaki kopambola ngai, mpe nazalaki kopesa esengo na motema ya mwasi oyo akufisa mobali.
14 I clothed myself in righteousness, and it clothed me; my justice was like a robe and a turban. Nazalaki kolata bosembo lokola elamba ; bosembo ezalaki elamba na ngai mpe kitendi na ngai ya kokanga na moto.
15 I was eyes to the blind and feet to the lame. Nazalaki miso ya mokufi miso mpe makolo ya mokakatani ;
16 I was a father to the needy, and I searched out the case of one I did not know. nazalaki tata ya moto oyo akelela, nazalaki kobundela moto oyo nayebi te ;
17 I broke the fangs of the wicked and snatched the prey from his teeth. nabukaki mbanga ya moto mabe mpe nabotolaki bato oyo akangaki na minu na ye.
18 So I thought, 'I will die in my own nest, and multiply my days like the sand.' Nazalaki kokanisa : ‹ Nakokufa kati na ndako na ngai moko sima na mikolo ebele lokola zelo.
19 My roots reached out to the waters, and the dew lay all night on my branches. Misisa na ngai ekoluka mayi, mpe mayi oyo ezalaka na matiti ekovanda butu mobimba na bitape na ngai.
20 My glory stayed fresh within me, and my bow was ever new in my hand. Lokumu na ngai ekozongisela ngai esengo, ata tolotolo ekokoma ya sika na loboko na ngai. ›
21 Men listened to me and waited; they kept silent for my counsel. Bato bazalaki koyoka ngai na bokebi, bazalaki na kimia mpo na koyoka toli na ngai.
22 After I spoke, they said no more; my words fell gently on them. Sima na ngai koloba, bazalaki na liloba ya kozongisa te ; maloba na ngai ezalaki kokota na esengo na matoyi na bango.
23 They waited for me as for the rain, and opened their mouths as for the spring showers. Bazalaki kozela ngai ndenge bazelaka mvula, mpe bazalaki komela maloba na ngai lokola mvula ya suka.
24 When I smiled on them, they could scarcely believe it, and they held on to the light of my face. Soki nasekisi bango, bazalaki kondima te ; kongenga ya elongi na ngai ezalaki na motuya mpo na bango.
25 I chose their way and sat as their chief; I lived like a king among his troops, like one who comforts mourners." Naponaki nzela mpo na bango mpe navandaki lokola mokonzi na bango ; nazalaki kokonza bango lokola mokonzi kati na mampinga na ye, nazalaki lokola moto oyo azalaki kolendisa bato ya mawa. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]