Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 28 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "Surely there is a mine for silver, and a place where gold is refined. Ezali na esika oyo batimolaka palata, mpe na esika oyo bapetolaka wolo.
2 Iron is taken from the dust, and copper is smelted from the rock. Ebende ewutaka na mabele, mpe libanga oyo balekisaka na moto epesaka motako.
3 Man sets a boundary to the darkness; he searches to the farthest limit for ore in gloom and deep shadow. Moto asilisaka molili, alukaka kino na se, na bisika ya se penza, libanga kati na molili oyo eleki makasi,
4 He sinks a shaft far from where people live, in places where no foot has ever walked; there they dangle and sway, far away from anyone. atimolaka libulu mosika ya esika oyo bato bavandaka, na bisika oyo makolo ya bato ekomaka te, mosika penza na bato, adiembelaka mosika ya bato nyonso.
5 The earth—from it comes food, yet beneath it is turned over as by fire. Mabele epai wapi bilei ewutaka ebongwani na se na yango lokola nde moto ezikisi yango.
6 Its stones hold sapphires, and its dust holds gold. Mabanga ya safiri ewutaka na mabanga makasi ya mabele, mpe putulu ya wolo ezalaka kati na mabele.
7 It is a path no bird of prey knows, one the falcon's eye has never seen. Ndeke moko te oyo eliaka misuni eyebi nzela na yango, miso ya mpongo moko te emoni yango,
8 The proud beasts have not trodden it, nor has the lion prowled across it. nyama ya zamba etia nanu makolo na yango kuna te, mpe nkosi etambola nanu kuna te.
9 Man lays his hand to the flinty rock and overturns mountains at their roots. Moto abetaka loboko na ye na likolo ya libanga ya makasi mpe apikolaka ngomba longwa na misisa,
10 He cuts channels through the rocks, and his eye sees every precious thing. atimolaka nzela kati na mabanga, mpe miso na ye emonaka bomengo na yango nyonso,
11 He holds back the trickling streams, and brings hidden things to light. akawusaka mayi ya bibale mpe abimisaka na pole biloko oyo ebombama.
12 "But wisdom—where can it be found? And where is the place of understanding? Kasi bakoki komona bwanya wapi ? Mayele evandaka wapi ?
13 Man does not know its worth, and it is not found in the land of the living. Moto ayebaka motuya na yango te, pamba te bakoki komona yango te kati na mokili ya bato ya bomoi.
14 The deep says, 'It is not in me,' and the sea says, 'It is not with me.' Libulu ya mozindo elobi : « Ezali kati na ngai te ; » mpe ebale monene elobi : « Ezali epai na ngai te. »
15 It cannot be bought with the finest gold, nor can its price be weighed out in silver. Bakoki kosomba yango te na motuya ya libanga ya wolo to na bakilo ya palata ;
16 It cannot be valued in the gold of Ophir, in precious onyx or sapphire. bakoki te kosomba yango na wolo ya Ofiri to na mabanga ya talo ya Onikisi to mabanga ya talo ya Safiri ;
17 Gold and crystal cannot equal it, nor can it be exchanged for vessels of pure gold. wolo to diama ekoki te kokokana na yango, bakoki kozwa yango te na motuya ya sani ya wolo ya kitoko.
18 Coral and crystal are not worth mentioning; the price of wisdom is beyond rubies. Mayaka ya Karayi mpe ya Jasipe ezali na motuya te liboso na yango. Motuya ya bwanya eleki pawuni ya talo.
19 The topaz of Cush cannot equal it, nor can it be valued in pure gold. Topaze ya Kushi ekoki kokokana na yango te, mpe bakoki te kosomba yango ata na wolo ya peto.
20 "From where, then, does wisdom come? And where is the place of understanding? Boye, bwanya ewutaka wapi ? Mayele evandaka wapi ?
21 It is hidden from the eyes of all the living, concealed even from the birds of the sky. Ebombami mosika na miso ya bato nyonso ya bomoi, ebombami mpe mosika na miso ya bandeke ya likolo.
22 Destruction and Death say, 'With our ears we have heard a rumor of it.' Libebi mpe kufa elobi : « Kaka sango na yango nde ekomaki na matoyi na biso. »
23 "God understands the way to it, and he knows its place. Nzambe kaka nde ayebi nzela na yango, Ye nde kaka ayebi esika bwanya evandaka.
24 For he looks to the ends of the earth and sees everything under the heavens. Pamba te miso na Ye emonaka kino na suka ya mokili, mpe amonaka nyonso oyo ezali na se ya Lola.
25 When he gave the wind its weight and measured out the waters, Tango apesaki makasi na mopepe mpe atiaki mondelo na mayi,
26 when he made a decree for the rain and a path for the thunderbolt, tango atiaki mobeko mpo na mvula mpe afungolaki nzela mpo na kake mpe mikalikali,
27 then he saw wisdom and declared it; he established it and searched it out. amonaki bwanya mpe akumisaki yango, andimaki yango mpe amekaki yango.
28 And he said to humankind, 'The fear of God—that is wisdom, and to turn from evil is understanding.'" Bongo alobaki na moto : « Kotosa Nkolo, yango nde bwanya ! Koboya mabe, yango nde mayele ! »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]