Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 17 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "My spirit is broken, my days are snuffed out, the grave is ready for me. Pema na ngai ekomi pene ya kosila, mikolo na ngai etikali ya kotanga, kunda ezali kozela ngai.
2 Surely mockers surround me, and my eyes cannot look away from their taunting. Solo, batioli bazingeli ngai, miso na ngai ezali komona kotiola na bango.
3 "Put up a pledge for me with yourself; who else will give their word as my guarantor? Oh Nzambe, mipesa ata Yo moko lokola ndanga, na esika na ngai, epai na Yo ; soki te, nani mosusu akoki komipesa lokola ndanga mpo na ngai !
4 For you have closed their minds to understanding; therefore you will not let them triumph. Okangi boyebi na bango mpo ete basosola te ; yango wana, okolongisa bango te.
5 One who denounces friends for personal gain—the eyes of his children will fail. Moto oyo akofunda balingami na ye mpo ete babotola bomengo na bango na makasi, bana na ye bakokufa miso.
6 "He has made me a byword among the peoples, someone they spit in the face. Nzambe akomisi ngai lokola lisapo kati na minoko ya bato, lokola moto oyo babwakelaka soyi na elongi.
7 My eye has grown dim from grief, and all my limbs are like a shadow. Miso na ngai ekomi molili likolo ya pasi, mpe nzoto na ngai nyonso ekomi lokola elilingi.
8 The upright are appalled at this, and the innocent is roused against the godless. Bato ya sembo bazali kokamwa likambo yango, mpe moto oyo ayebi na ye likambo te atelemeli moto mabe.
9 Yet the righteous holds to his way, and the one with clean hands grows stronger and stronger. Nzokande, bato ya sembo bakangamaka na nzela na bango, mpe bato ya maboko peto bakomaka lisusu makasi koleka.
10 "But come back, all of you, come now—I find not one wise man among you. Bino nyonso, boya mpe bomeka lisusu ! Nakomona ata moto moko te ya bwanya kati na bino.
11 My days are past, my plans are broken off, and with them the desires of my heart. Mikolo na ngai ekomi pene ya kosila ; mabongisi na ngai mpe baposa ya motema na ngai, nyonso, esili kobeba.
12 They turn night into day; 'light,' they say, 'is near'—in the face of darkness. Bato oyo bazali komona butu lokola moyi bazali koloba kati na molili : ‹ Pole ekomi pene, › nzokande molili ezali makasi.
13 If I hope for the grave as my house, if I spread my bed in the darkness, Soki ezali na ndako moko kaka oyo nazali kotiela elikya, ezali nde kunda ; soki mpe nakotandaka mbeto na ngai, ezali nde kati na mboka ya bakufi.
14 if I call to the pit, 'You are my father,' and to the worm, 'My mother' and 'My sister,' Soki nalobi na kunda : ‹ Ozali tata na ngai, › mpe na mutsopi : ‹ Ozali mama na ngai to ndeko na ngai ya mwasi, ›
15 where then is my hope? Who can see any hope for me? wana elikya na ngai ezali penza wapi, mpe nani penza azali komona elikya na ngai ?
16 Will it go down to the gates of the grave? Will we descend together into the dust?" Ekokita kino na bikuke ya kufa tango tokokende elongo kopema kati na putulu. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]