Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 16 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then Job answered: Yobo azongisaki :
2 "I have heard many things like these; miserable comforters are you all. « Nayoki maloba ebele ya lolenge oyo ; bino nyonso bozali babondisi mabe.
3 Is there no end to your windy words? What provokes you that you keep on answering? Kino tango nini bokotika koloba maloba ya pamba-pamba boye ? Likambo nini etindi yo lisusu kozongela maloba ?
4 I also could speak as you do, if you were in my place; I could string words together against you and shake my head at you. Ngai mpe nakokaki koloba lokola bino, soki bozalaki na esika na ngai, nakokaki kobimisa maloba ebele mpe koningisa moto mpo na bino.
5 But I would strengthen you with my mouth, and the comfort of my lips would ease your pain. Kasi monoko na ngai elingaki kolendisa bino, mpe bibebu na ngai elingaki koningana mpo na kokitisa bino mitema kati na pasi.
6 If I speak, my pain is not eased; and if I hold back, what leaves me? Nzokande, soki nalobi, pasi na ngai ekosila te ; bongo soki nakangi monoko nde pasi yango elongwe na bomoi na ngai ?
7 Surely now God has worn me out; you have devastated all my company. Oh Nzambe ! Solo penza, olembisi ngai ! Obebisi ndako na ngai nyonso,
8 You have shriveled me up, and it has become a witness; my gauntness rises up against me and testifies to my face. ofini-fini ngai makasi penza, mpe kokonda na ngai ekomi ata kotatola mpe kofunda ngai na miso ya bato !
9 His anger has torn me and assailed me; he has gnashed his teeth at me; my adversary fixes his eyes on me. Kanda na Yo ezali kopasola mpe kobundisa ngai, okomi ata kolia minu mpo na kosala ngai mabe mpe kotala ngai na miso mabe lokola nde nazali monguna na yo.
10 Men have gaped at me with their mouths; they have struck my cheek in scorn; they band together against me. Bato mabe bafungoli minoko mpo na kotiola ngai, bakomi kobeta ngai bambata na matama mpo na kosambwisa ngai, bango nyonso basaleli ngai likita.
11 God hands me over to the unjust and casts me into the grip of the wicked. Nzambe akabi ngai na maboko ya bato mabe mpe abwaki ngai na manzaka na bango.
12 I was at ease, and he shattered me; he seized me by the neck and dashed me to pieces; he has set me up as his target. Makambo nyonso ezalaki kotambola malamu mpo na ngai, kasi aningisi ngai, akangi ngai na kingo mpe apanzi ngai, akomisi ngai lokola eloko na Ye ya komekela makonga ;
13 His archers surround me; he slashes open my kidneys without mercy and pours my gall on the ground. makonga na Ye ezingeli ngai, atoboli-toboli libumu na ngai, mpe na mawa te, asopi makila na ngai na mabele.
14 He breaks me with blow after blow; he rushes at me like a warrior. Tango nyonso, azali kaka kozokisa ngai mpe kokweya likolo na ngai lokola elombe.
15 I have sewn mourning clothes over my skin and buried my brow in the dust. Natongi elamba na ngai ya saki na poso ya nzoto na ngai mpe nakundi lokumu na ngai nyonso na se ya putulu.
16 My face is flushed from weeping, and deep shadow lies on my eyelids, Likolo ya kolela, elongi na ngai ekomi motane, mpe molili ezingeli miso na ngai.
17 though there is no violence in my hands and my prayer is pure. Nzokande, maboko na ngai etikala kosala moto mabe te, mpe libondeli na ngai ezalaki kosalema na motema peto.
18 Earth, do not cover my blood, and let my cry find no resting place. Oh mabele, kozipa makila na ngai te ! Kotika te ete koganga na ngai ezwa tango ya kopema !
19 Even now, my witness is in heaven, and my advocate is on high. Wuta sik’oyo, motatoli na ngai azali na Likolo, molobeli na ngai azali na Lola.
20 My friends scorn me; my eye pours out tears to God, Baninga na ngai bakomi koseka ngai ; nazali nde kolela epai ya Nzambe na mpinzoli.
21 that he would plead the case of a man before God, as a son of man pleads for his neighbor. Boni, ezali solo na molobeli oyo akoki kolobela moto liboso ya Nzambe ndenge moto alobelaka moninga na ye ?
22 For only a few years will pass, and then I will go the way of no return." Solo, motango ya mibu na ngai ekomi pene ya kosila, mpe nakokende na ngai na nzela oyo bato bazongaka lisusu te.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]