Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The word that Isaiah son of Amoz saw concerning Judah and Jerusalem. Tala makambo oyo Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, amonaki na tina na Yuda mpe Yelusalemi :
2 In the last days the mountain of our Father's house will be firmly established as the highest of the mountains, raised above the hills, and all the nations will stream to it. Na mikolo oyo ekoya, ngomba ya Tempelo ya Yawe ekolendisama ngwi na songe ya bangomba, ekoleka bangomba mikuse nyonso na molayi, mpe bikolo nyonso ekokende kotondana kuna.
3 Many peoples will come and say, "Come, let us go up to the mountain of God, to his house, so he can teach us his ways and we can walk in his paths." For instruction will go out from Zion, and the word of our Father from Jerusalem. Bato ya bikolo ebele bakokende kuna mpe bakoloba : « Boya, tomata na ngomba ya Yawe, na Tempelo ya Nzambe ya Jakobi. Akoteya biso banzela na Ye mpo ete tolanda banzela mike na Ye. » Pamba te Mobeko ekowuta na Siona, mpe Liloba na Yawe ekowuta na Yelusalemi.
4 He will judge between the nations and settle disputes for many peoples. They will beat their swords into plowshares and their spears into pruning hooks; nation will not lift up sword against nation, nor will they train for war anymore. Akozala Mosambisi kati na bikolo, akokata makambo ya kowelana kati na bato ebele. Bakotumba mipanga na bango na moto mpo na kosala bakongo, mpe makonga na bango mpo na kosala bambeli. Ekolo moko te ekotombola lisusu mopanga mpo na kobundisa ekolo mosusu ; bato bakoyekola lisusu te kobunda bitumba.
5 House of Jacob, come, let us walk in the light of our Father. Oh ndako ya Jakobi, yaka, tika ete totambola na pole ya Yawe !
6 For you have abandoned your people, the house of Jacob, because they are filled with influences from the east and with fortune-tellers like the Philistines, and they have made alliances with foreigners. Solo, osundolaki bato na Yo, libota ya Jakobi, mpo ete batondisami na bizaleli ya soloka oyo ewuti na Este ; bazali kosalela maji lokola bato ya Filisitia, bazali kosala boyokani elongo na bapagano.
7 Their land is full of silver and gold, with no end to their treasures; their land is full of horses, with no end to their chariots. Mokili na bango etondi na palata mpe wolo, bomengo na bango ezali na suka te. Mokili na bango etondi na bampunda mpe bakoki ata moke te kotanga bashar na bango ya bitumba.
8 Their land is full of idols; they bow down to the work of their hands, to what their own fingers have made. Mokili na bango etondi na banzambe ya bikeko, bato bakomi kofukamela biloko oyo esalemi na maboko na bango, oyo misapi na bango esili kosala.
9 So mankind is brought low, and everyone is humbled—do not forgive them. Yango wana, bato bakokitisa mito, mpe bato ya lokumu bakotonda na soni ; kolimbisa bango te !
10 Go into the rocks and hide in the dust from the dread of our Father and from the splendor of his majesty. Kimela na madusu ya mabanga, bombama na putulu ya mabele liboso ya nguya ya kanda ya Yawe, liboso ya nkembo ya lokumu na Ye !
11 The proud eyes of mankind will be brought low, and the arrogance of men will be humbled; our Father alone will be exalted in that day. Na mokolo wana, moto ya lolendo akokitisa elongi, bato ya lofundu bakokitisama ; Yawe kaka nde akonetolama.
12 For the Father of heaven's armies has a day in store against all that is proud and lofty, against all that is lifted up, so that it will be brought low, Yawe, Mokonzi ya mampinga, abongisa mokolo moko mpo na kokitisa bato nyonso ya lolendo mpe ya lofundu, bato nyonso oyo bamimatisaka,
13 against all the cedars of Lebanon, lofty and lifted up, and against all the oaks of Bashan, banzete nyonso ya sedele ya Libani, oyo eleki na molayi mpe na kotombwama, mpe banzete nyonso ya sheni ya Bashani ;
14 against all the high mountains and against all the lofty hills, bangomba nyonso ya milayi mpe bangomba nyonso ya mikuse,
15 against every high tower and against every fortified wall, bandako nyonso ya milayi, bamir nyonso ya milayi oyo batonga makasi ;
16 against all the ships of Tarshish and against every magnificent vessel. bamasuwa nyonso ya Tarsisi mpe bomengo na yango nyonso ya kitoko.
17 The arrogance of mankind will be humbled, and the pride of men brought low; our Father alone will be exalted in that day, Lolendo ya moto ekosila mpe lofundu ya bato ekosuka ; Yawe kaka nde akonetolama na mokolo wana.
18 and the idols will completely vanish. Banzambe nyonso ya bikeko bakobebisama nye.
19 People will flee into the caves of the rocks and into holes in the ground from the dread of our Father and from the splendor of his majesty, when he rises to shake the earth. Bato bakokimela na madusu ya mabanga mpe na putulu ya mabele liboso ya nguya ya kanda ya Yawe, liboso ya nkembo ya lokumu na Ye, tango akotelema mpo na koningisa mokili.
20 In that day people will throw away their idols of silver and their idols of gold to the moles and bats, which they made for themselves to worship. Na mokolo wana, bato bakobwaka epai ya bampuku mpe bangembo banzambe na bango ya bikeko ya palata mpe banzambe na bango ya bikeko ya wolo, oyo basalaki mpo ete bafukamela bango.
21 They will go into the clefts of the rocks and into the crevices of the cliffs from the dread of our Father and from the splendor of his majesty, when he rises to shake the earth. Bakokima na madusu ya mabanga mpe kati na mabanga liboso ya nguya ya kanda ya Yawe, liboso ya nkembo ya lokumu na Ye, tango akotelema mpo na koningisa mokili.
22 Stop trusting in mere man, who has only breath in his nostrils. What good is he? Botika kotia elikya na moto oyo bomoi na ye ezali lokola pema kati na zolo na ye. Motuya nini azali na yango ?
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]