Ngomba ya Yawe
1Tala makambo oyo Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, amonaki na tina na Yuda mpe Yelusalemi :
2Na mikolo oyo ekoya,ngomba ya Tempelo ya Yaweekolendisama ngwi na songe ya bangomba,ekoleka bangomba mikuse nyonso na molayi,mpe bikolo nyonso ekokende kotondana kuna.
3Bato ya bikolo ebele bakokende kuna mpe bakoloba :« Boya, tomata na ngomba ya Yawe,na Tempelo ya Nzambe ya Jakobi.Akoteya biso banzela na Yempo ete tolanda banzela mike na Ye. »Pamba te Mobeko ekowuta na Siona,mpe Liloba na Yawe ekowuta na Yelusalemi.
4Akozala Mosambisi kati na bikolo,akokata makambo ya kowelana kati na bato ebele.Bakotumba mipanga na bango na motompo na kosala bakongo,mpe makonga na bango mpo na kosala bambeli.Ekolo moko te ekotombola lisusu mopangampo na kobundisa ekolo mosusu ;bato bakoyekola lisusu te kobunda bitumba.
5Oh ndako ya Jakobi,yaka, tika ete totambola na pole ya Yawe !
Mokolo ya Yawe
6Solo, osundolaki bato na Yo, libota ya Jakobi,mpo ete batondisami na bizaleli ya soloka oyo ewuti na Este ;bazali kosalela maji lokola bato ya Filisitia,bazali kosala boyokani elongo na bapagano.
7Mokili na bango etondi na palata mpe wolo,bomengo na bango ezali na suka te.Mokili na bango etondi na bampundampe bakoki ata moke te kotanga bashar na bango ya bitumba.
8Mokili na bango etondi na banzambe ya bikeko,bato bakomi kofukamela bilokooyo esalemi na maboko na bango,oyo misapi na bango esili kosala.
9Yango wana, bato bakokitisa mito,mpe bato ya lokumu bakotonda na soni ;kolimbisa bango te !
10Kimela na madusu ya mabanga,bombama na putulu ya mabeleliboso ya nguya ya kanda ya Yawe,liboso ya nkembo ya lokumu na Ye !
11Na mokolo wana, moto ya lolendo akokitisa elongi,bato ya lofundu bakokitisama ;Yawe kaka nde akonetolama.
12Yawe, Mokonzi ya mampinga,abongisa mokolo moko mpo na kokitisabato nyonso ya lolendo mpe ya lofundu,bato nyonso oyo bamimatisaka,
13banzete nyonso ya sedele ya Libani, oyo eleki na molayi mpe na kotombwama,mpe banzete nyonso ya sheni ya Bashani ;
14bangomba nyonso ya milayimpe bangomba nyonso ya mikuse,
15bandako nyonso ya milayi,bamir nyonso ya milayi oyo batonga makasi ;
16bamasuwa nyonso ya Tarsisimpe bomengo na yango nyonso ya kitoko.
17Lolendo ya moto ekosilampe lofundu ya bato ekosuka ;Yawe kaka nde akonetolama na mokolo wana.
18Banzambe nyonso ya bikeko bakobebisama nye.
19Bato bakokimela na madusu ya mabangampe na putulu ya mabeleliboso ya nguya ya kanda ya Yawe,liboso ya nkembo ya lokumu na Ye,tango akotelema mpo na koningisa mokili.
20Na mokolo wana,bato bakobwaka epai ya bampuku mpe bangembobanzambe na bango ya bikeko ya palatampe banzambe na bango ya bikeko ya wolo,oyo basalaki mpo ete bafukamela bango.
21Bakokima na madusu ya mabanga mpe kati na mabangaliboso ya nguya ya kanda ya Yawe,liboso ya nkembo ya lokumu na Ye,tango akotelema mpo na koningisa mokili.
22Botika kotia elikya na motooyo bomoi na ye ezali lokola pema kati na zolo na ye.Motuya nini azali na yango ?