Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 For look—the Father of heaven's armies is about to strip from Jerusalem and from Judah every support and supply: the whole supply of bread and the whole supply of water, Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akomi pene ya kobotola masungi nyonso, kati na Yelusalemi mpe kati na Yuda : lisungi ya bilei mpe lisungi ya mayi ;
2 the warrior and the soldier, the judge and the prophet, the fortune-teller and the elder, bilombe mpe basoda ya mpiko, basambisi mpe basakoli, bato oyo balobaka makambo oyo ekoya mpe bakambi ;
3 the commander of fifty and the man of rank, the counselor, the skilled craftsman, and the clever enchanter. bakonzi ya basoda mpe bato ya lokumu, bapesi toli, bato mayele ya misala ya maboko mpe bato oyo basalelaka maji.
4 "I will make mere boys their officials, and childish whim will rule over them. Nakosala ete bilenge mibali bakoma bakonzi na bango mpe bana mike bakamba bango.
5 The people will oppress one another, each man against his neighbor; the young will rise up against the old, and the lowly against the honored." Bato bakokoma konyokolana bango na bango : moko akonyokola mosusu, mpe moninga akonyokola moninga na ye mosusu ; bilenge bakotosa mikolo te, bato pamba bakotelemela bato ya lokumu ;
6 A man will seize his brother in his father's house and say, "You have a coat—you be our leader; take charge of this heap of ruins." moko akokanga ndeko na ye ya mobali kati na ndako ya tata na bango mpe akoloba : « Yo oyo ozali na kazaka, okozala mokonzi na biso, kamata mokumba ya libebi oyo na maboko ! »
7 But on that day he will cry out, "I am no healer! There is no bread and no coat in my house—you will not make me leader of the people." Kasi na mokolo wana, akoganga : « Te, nazali na ngai monganga te, mpe nazali na bilei to bilamba te kati na ndako na ngai ; bokomisa ngai mokonzi te ! »
8 For Jerusalem has stumbled and Judah has fallen, because their words and their deeds are against our Father, defying his glorious presence. Yelusalemi ezali kotepatepa, mpe Yuda ekweyi ; mpo ete maloba mpe misala na bango ezali ya botomboki liboso ya Yawe, ezali kotelemela lokumu ya Kombo na Ye.
9 The look on their faces testifies against them; they flaunt their sin like Sodom—they do not hide it. How terrible for them, for they have brought disaster on themselves! Bilongi na bango ezali kofunda bango ; bazali kolakisa masumu na bango ndenge bato ya Sodome bazalaki kosala, bazali kobomba yango te. Mawa na bango, pamba te bamilukeli nde makambo !
10 Tell the righteous it will go well with them, for they will eat the fruit of their deeds. Loba na moto ya sembo : « Bolamu ekobila yo, pamba te okosepela na mbuma ya misala na yo. »
11 How terrible for the wicked! It will go badly for him, for what his hands have done will be repaid to him. Mawa na moto mabe ! Pasi ezali likolo na ye, pamba te akozwa lifuti kolanda misala na ye.
12 My people—children are their oppressors, and women rule over them. My people, your guides lead you astray and have swallowed up the path you should walk. Bilenge bazali konyokola bato na Ngai, basi bazali koyangela bango. Oh bato na Ngai, bakambi na bino babungisi bino nzela, babimisi bino libanda ya nzela oyo bosengeli kolanda !
13 Our Father takes his stand to bring his case; he rises to judge the peoples. Yawe atelemi na esambiselo, atelemi mpo na kosambisa bato.
14 Our Father enters into judgment with the elders and officials of his people: "It is you who have devoured the vineyard; the plunder of the poor is in your houses. Yawe akosamba elongo na bampaka mpe bakambi ya bato na Ye : « Ezali nde bino bato bobebisi elanga na Ngai ya vino ! Botondisi bandako na bino na biloko oyo bobotoli epai ya babola !
15 What do you mean by crushing my people and grinding the faces of the poor?" declares the Father of heaven's armies. Mpo na nini bozali konyata bato na Ngai mpe kotiola bomoto ya babola ; » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga ?
16 Our Father said: "Because the daughters of Zion are proud—walking with outstretched necks and flirting eyes, mincing along with quick little steps, jingling the anklets on their feet, Yawe alobi : « Lokola basi ya Siona bazali lofundu, lokola batambolaka mapeka likolo mpe balalisaka miso na lofundu, lokola batambolaka na kodenda malembe-malembe mpe na kolelisa biloko ya monzele oyo balataka na makolo na bango,
17 therefore the Sovereign Father will strike the heads of the daughters of Zion with scabs, and our Father will lay bare their foreheads." Yawe akokomisa mito ya basi ya Siona mapalata mpe akotika bango bolumbu. »
18 On that day the Sovereign Father will strip away their finery: the anklets, the headbands, the crescent ornaments, Na mokolo wana, Nkolo akolongola bango biloko na bango oyo basalelaka monzele : basheneti oyo balataka na makolo mpe babiju ya talo oyo ezalaka lokola moyi mpe sanza ;
19 the earrings, the bracelets, the veils, biloko ya matoyi, basheneti oyo balataka na maboko, bavwale,
20 the headdresses, the ankle chains, the sashes, the perfume flasks, the charms, bitendi oyo bakangaka na mito, basheneti, mikaba, milangi ya malasi, bakisi ya kokangela nzoto,
21 the signet rings, the nose rings, bapete ya mosapi, bapete ya zolo,
22 the festival robes, the capes, the cloaks, the purses, bilamba ya feti, banzambala oyo etika nzoto, bakazaka, basakosi ya mike,
23 the hand mirrors, the fine linen garments, the turbans, and the shawls. bilamba oyo emonisaka nzoto, bilamba ya lino, maputa mpe bitambala.
24 Then, instead of perfume there will be a stench; instead of a sash, a rope; instead of elegantly styled hair, baldness; instead of fine robes, a wrapping of coarse cloth; branding instead of beauty. Na esika ya solo kitoko ya malasi, ekozala nde solo mabe ; na esika ya mokaba, ekozela nde singa ; na esika ya suki bakanga kitoko na moto, ekozala nde libandi ; na esika ya bilamba ya talo, ekozala nde bilamba ya saki ; na esika ya elongi kitoko, ekozala nde elongi mabe.
25 Your men will fall by the sword, your warriors in the battle. Mibali na bino bakokufa na mipanga, basoda na bino ya mpiko bakokufa na bitumba.
26 Her gates will mourn and lament; stripped bare, she will sit on the ground. Bikuke ya Siona ekolela mpe ekozala na matanga ; boye Siona ekokelela mpe ekovanda na mabele.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]