Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 On that day seven women will take hold of one man, saying, "We will eat our own bread and wear our own clothes; only let us be called by your name. Take away our disgrace." Na mokolo wana, basi sambo bakokangama na mobali moko mpe bakoloba : « Tokomileisa biso moko mpe tokomilatisa biso moko ; yo, ndima kaka ete tobengama na kombo na yo ! Longola soni na biso ! »
2 On that day the Branch of our Father will be beautiful and glorious, and the fruit of the land will be the pride and splendor of the survivors of Israel. Na mokolo wana, nkona ya Yawe ekokoma kitoko mpe nkembo, bongo mbuma ya mabele ekosala lokumu mpe nkembo, ya ndambo ya bana ya Isalaele oyo babiki.
3 And whoever is left in Zion and remains in Jerusalem will be called holy—everyone recorded for life in Jerusalem, Bato oyo bakotikala na Siona mpe ba-oyo bakovanda na Yelusalemi bakobengama basantu : bango nyonso oyo bakombo na bango ekomama kati na bato oyo batikali na bomoi na Yelusalemi.
4 when the Sovereign Father has washed away the filth of the daughters of Zion and rinsed the bloodstains of Jerusalem from within her by a spirit of judgment and a spirit of burning. Yawe akolongola botutu ya basi ya Siona, akopetola Yelusalemi oyo ekomaki mbindo na bilembo ya makila, na nzela ya molimo ya kosambisa mpe ya moto.
5 Then our Father will create over the whole site of Mount Zion and over her assemblies a cloud by day and smoke, and a bright, flaming fire by night; for there will be a canopy over all the glory. Boye, Yawe akokela na likolo ya ngomba mobimba ya Siona mpe na likolo ya bato oyo basanganaka kuna : lipata na tango ya moyi, mpe kongenga ya moto na tango ya butu. Bongo na likolo na nyonso, nkembo na Yawe ekozipa bango.
6 It will be a shelter to give shade from the heat by day, and a refuge and hiding place from storm and rain. Ekozala lokola ndako ya matiti oyo epesaka pio na tango ya molunge ya moyi makasi, ekimelo mpe ebombamelo na tango ya mopepe makasi mpe na tango ya mvula.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]