Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Amos 3 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Makebisi mpe pamela

1Oh bana ya Isalaele, boyoka liloba oyo Yawe alobi na tina na bino, na tina na etuka nyonso oyo nabimisaki na Ejipito :

2« Bozali etuka moko kaka oyo Ngai naponakati na bituka nyonso ya mabele ;yango wana nakopesa bino etumbumpo na mabe nyonso oyo bosali.

3Boni, bato mibale bakoki solo kotambola nzela mokosoki bayokani te ?

4Nkosi ekoki solo koganga na zambasoki emoni te nyama ya kolia ?Mwana nkosi ekoki penza kongulumana esika oyo evandaka soki ekangi nyama te ?

5Ndeke ekoki solo kokangama na motambooyo ezali na mabelesoki ezangi eloko ya kolia ?Motambo ekoki solo koninganasoki ekangi eloko te ?

6Boni, kelelo ya bitumba ekoki solo kobeta kati na engumba,bongo bato bazanga kobanga ?Pasi ekoki solo koya na engumbasoki Yawe atindi yango te ?

7Solo, Nkolo Yawe asalaka eloko moko tesoki alakisi mabongisi na Ye teepai ya basali na Ye, basakoli.

8Nkosi egangi ;nani akobanga te ?Nkolo Yawe alobi ;nani akoki koboya kosakola ?

9Bosakola makambo oyokati na bandako ya Asidodi mpe ya Ejipito :‹ Bosangana na likolo ya bangomba ya Samarimpe botala ndenge nini mobulu mpe minyokoezali kosalema kati na yango !

10Bato na Ngai bayebi lisusu tekosala makambo na bosembo, ›elobi Yawe,‹ batondisi bandako na bango na bomengo ya bitumbampe na biloko oyo babotoli na makasi. › »

11Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :« Monguna moko akozingela yo,akosukisa yo mpe akobotola na makasibiloko kati na bandako na yo,oyo batonga makasi. »

12Tala liloba oyo Yawe alobi :« Ndenge mobateli bibwele alongolaka na monoko ya nkosimakolo mibale to songe ya litoyi ya meme,ndenge wana nde bana ya Isalaele bakobikisama,ba-oyo bavandaka na Samari, na basongempe na basuka ya bambeto na bango. »

13« Boyoka makambo oyompe bokebisa ndako ya Jakobi, »elobi Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga.

14« Na mokolo oyo nakopesa Isalaele etumbumpo na masumu na ye,nakobebisa bitumbelo ya Beteli,nakobuka maseke ya bitumbelo,mpe ekokweya na mabele.

15Nakokweyisa ndako ya tango ya malili makasimpe ya tango ya molunge makasi ;mpe bandako oyo batonga kitokona pembe ya nzoko ekozala lisusu te, »elobi Yawe.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]