Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Amos 2 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Etumbu mpo na bato ya Moabi

1Tala liloba oyo Yawe alobi :« Likolo ya masumu misato to minei ya Moabi,nakozanga te kopesa bango etumbu,pamba te batumbaki mikuwa ya mokonzi ya Edomimpe bakomisaki yango putulu.

2Nakotia moto kati na ekolo ya Moabi,mpe moto yango ekozikisa bandako ya engumba ya Kerioti,oyo batonga makasi.Moabi ekokufa kati na lokito ya makasi,na makelele ya bitumba mpe ya kelelo.

3Nakobebisa mokonzi na yangompe nakoboma ye elongo na bakalaka na ye, »elobi Yawe.

Etumbu mpo na bato ya Yuda

4Tala liloba oyo Yawe alobi :« Likolo ya masumu misato to minei ya Yuda,nakozanga te kopesa bango etumbu,pamba te babwakaki Mobeko na Ngai,babatelaki te bikateli na Ngaimpe babungaki nzela mpo na kolanda banzambe ya lokutaoyo bakoko na bango balandaki na tango ya kala.

5Nakotia moto kati na ekolo ya Yuda,mpe moto yango ekozikisa bandako ya engumba Yelusalemi,oyo batonga makasi. »

Etumbu mpo na bana ya Isalaele

6Tala liloba oyo Yawe alobi :« Likolo ya masumu misato to minei ya Isalaele,nakozanga te kopesa bango etumbu,pamba te batekaki bato ya sembompo na kozwa kaka palata,mpe bato bakelela mpo na kozwa kaka mapapa mibale.

7Bazali konyata mito ya babolandenge banyataka putulu ya mabele,mpe bazali kokata na bosembo temakambo ya bato bakelela.Tata mpe mwana na ye ya mobali bazali kosangisa nzotona mwasi moko ya makangu ;mpe na bongo, bazali kotiola bosantu ya Kombo na Ngai.

8Pene ya bitumbelo, bazali kolalela bilambaoyo bazwi na ndanga ;mpe kati na ndako ya nzambe na bango,bazali komela vino oyo epesami lokola lomande.

9Nzokande, Ngai, nabebisaki bato ya Amori liboso na bango,atako bazali milayi lokola banzete ya sedelempe makasi lokola banzete ya sheni.Nabebisaki bambuma na yango na likolo,mpe misisa na yango na se.

10Nabimisaki bino na Ejipitompe natambolisaki bino mibu tuku minei kati na esobempo na kopesa bino mokili ya bato ya Amori.

11Kati na bana na bino ya mibali,nabimisaki basakoli ;mpe kati na bilenge mibali na bino,nabimisaki banaziri.Oh bana ya Isalaele, boni, ezali solo te ? »elobi Yawe.

12« Kasi bino, bolangwisi banaziri masangampe bopekisi basakoli ete basakola lisusu te.

13Sik’oyo, nakonyata bino ndenge sharoyo etonda na maboke ya bambuma enyataka biloko.

14Moto oyo aleki na mbangu akobika te,moto oyo aleki makasi akokoka kobimisa makasi na ye te,mpe soda ya mpiko akokoka kobikisa bomoi na ye te.

15Mobeti tolotolo akolonga te,soda ya mpiko akokoka kokima te,mpe soda oyo atambolaka likolo ya mpundaakobikisa bomoi na ye te ;

16ezala basoda oyo baleki makasi,bakokima bolumbu na mokolo wana, »elobi Yawe.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]