Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Zechariah 13 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 On that day a fountain will open for the house of David and the people of Jerusalem, to cleanse them from sin and impurity. Na mokolo wana, etima moko ekobimisa mayi mpo na kopetola masumu mpe mbindo ya libota ya Davidi mpe ya bavandi ya Yelusalemi.
2 On that day, declares the Father of heaven's armies, I will cut off the idols' names from the land, remembered no more; and I will remove the prophets and the spirit of impurity from the land. Na mokolo wana, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, nakosala ete bakombo ya banzambe ya bikeko elimwa na mokili ; boye bakotikala kokanisa yango lisusu te. Nakolongola lisusu kati na mokili basakoli mpe molimo ya mbindo.
3 If anyone still prophesies, the father and mother who bore him will tell him, "You must die, for you have spoken lies in our Father's name." And when he prophesies, his father and mother who bore him will stab him. Boye, soki moto moko akobi kosakola, tika ete tata mpe mama oyo babota ye baloba na ye : ‹ Osengeli kokufa mpo ete olobi makambo ya lokuta na Kombo na Yawe ! › Wana akozala kosakola, baboti na ye bakotobola ye na mopanga.
4 On that day every prophet will be ashamed of his vision when he prophesies; nor will they wear a hairy cloak to deceive. Na mokolo wana, mosakoli moko na moko akozala na soni mpo na kosakola mpe koloba bimoniseli na ye ; akokosa lisusu bato te na kolataka bilamba ya basakoli, oyo basala na bapwale.
5 But he will say, "I am no prophet; I am a farmer, for the land has been my possession since my youth." Akoloba : ‹ Nazali na ngai mosakoli te ; ngai nasalaka na ngai bilanga, mabele nde ezalaka libula na ngai wuta bolenge na ngai ! ›
6 If someone asks him, "What are these wounds between your hands?" he will say, "I was wounded in the house of my friends." Soki batuni ye : ‹ Bongo bapota oyo ezali na tolo na yo ewuti wapi ? › Akozongisa : ‹ Nazokaki yango kati na ndako ya balingami na ngai. ›
7 Awake, sword, against my shepherd, against the man who stands close to me, declares the Father of heaven's armies. Strike the shepherd, and the sheep will be scattered; and I will turn my hand against the little ones. Oh mopanga, telema ! Tika ete otelema mpo na koboma mobateli bibwele na Ngai ! Tika ete oboma moninga na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Beta mobateli bibwele, mpe bameme ekopalangana. Bongo nakoboma ata bibwele ya mike.
8 And in all the land, declares our Father, two-thirds will be cut off and perish, but one-third will be left alive in it. Na mokili mobimba, » elobi Yawe, « bandambo mibale ya bato kati na bandambo misato bakobebisama mpe bakokufa ; mpe ndambo moko ya bato kati na bandambo misato nde bakotikala na mokili.
9 That final third I will bring into the fire; I will refine them like silver, test them like gold. They will call on my name; I will answer them. Then I will say, "They are my children," and they will say, "Our Father." Nakomema ndambo moko wana ya bato na moto, nakopetola bango ndenge bapetolaka palata na moto mpe nakomeka bango ndenge bamekaka wolo na moto ; bakobelela Kombo na Ngai, mpe Ngai nakoyanola bango. Nakoloba na bango : ‹ Bozali bato na Ngai, › mpe bango bakoloba : ‹ Yawe azali Nzambe na biso ! › »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]