Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Zechariah 14 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 A day is coming for our Father, when your plunder will be divided among you. Tala, mokolo ya Yawe ezali koya ; ezali mokolo oyo bakokabola bomengo ya bitumba kati na yo, Yelusalemi.
2 I will gather all nations against Jerusalem for battle. The city will be captured, houses plundered, women raped. Half the city will go into exile, but the rest of the people will not be cut off from the city. Nakosangisa bikolo nyonso, na Yelusalemi, mpo ete babundisa engumba yango ; bakobotola yango, bakobuka bandako na yango, bakozwa basi na yango na makasi mpo na kobebisa lokumu na bango, mpe ndambo ya bato kati na yango bakokende na bowumbu, bongo ndambo mosusu ya bato bakotikala.
3 Then our Father will go out and fight against those nations, as he fights on a battle day. Bongo Yawe akobima mpe akobundisa bikolo wana, ndenge asalaka na tango ya bitumba.
4 On that day his feet will stand on the Mount of Olives east of Jerusalem, and it will split down the middle from east to west into a huge valley; half the mountain moving north, half south. Na mokolo wana, makolo na Ye ekotelema likolo ya ngomba ya banzete ya olive oyo ezali na ngambo ya este ya Yelusalemi ; mpe ngomba ya olive ekokabwana na biteni mibale : eteni moko na ngambo ya este mpe eteni mosusu na ngambo ya weste. Lubwaku moko ya monene ekosalema : eteni moko ya ngomba ekokende na ngambo ya nor, mpe eteni mosusu, na ngambo ya sude.
5 You will flee through the valley of my mountains, for it will reach to Azal. You will flee as you fled from the earthquake in the days of Uzziah king of Judah. Then my Father will come, and all the holy ones with him. Bokokimela kati na lubwaku ya bangomba na ngai, pamba te lubwaku ya bangomba ekokende kino na Atsali ; bokokima ndenge bokimaki tango mabele eninganaki na tango Oziasi azalaki mokonzi ya Yuda. Bongo Yawe, Nzambe na ngai, akoya elongo na basantu na Ye nyonso.
6 On that day there will be no light, no cold or frost. Na mokolo wana, ezala pole to malili to mpe mvula, eloko moko te ekozala.
7 It will be one unique day, known only to our Father—neither day nor night; but at evening there will be light. Ekozala mokolo ya ndenge mosusu, mokolo ezanga moyi mpe butu, mokolo oyo Ye moko kaka Yawe ayebi ; pole ekobima soki pokwa ekoki.
8 On that day living waters will flow from Jerusalem, half toward the eastern sea and half toward the western sea, in summer and winter alike. Na mokolo wana, mayi oyo etiolaka ekobimela na Yelusalemi. Ndambo moko ekokende na ebale monene ya este mpe ndambo mosusu, na ebale monene ya weste, na eleko ya malili mpe ya molunge.
9 And our Father will be king over all the earth. On that day our Father will be one, and his name one. Yawe akozala Mokonzi ya mabele mobimba. Na mokolo wana, Ye moko kaka nde akozala Nkolo, mpe bakosambela kaka Ye.
10 The whole land will become a plain, from Geba to Rimmon south of Jerusalem. But Jerusalem will rise and stay in place, from the Benjamin Gate to the site of the First Gate, to the Corner Gate, and from the Tower of Hananel to the king's winepresses. Mokili mobimba, longwa na Geba kino na Rimoni, na ngambo ya sude ya Yelusalemi, ekokoma lokola etando ya Araba ; kasi Yelusalemi ekozala kaka na likolo, ekotikala kaka na esika na yango, longwa na Ekuke ya Benjame kino na esika oyo Ekuke ya kala ezalaki, na songe ya bamir, longwa na ndako molayi ya Ananeyeli kino na bikamolelo ya mokonzi.
11 People will live in it, never again doomed to destruction; Jerusalem will live in safety. Bato bakozongela kovanda na Yelusalemi ; Yelusalemi ekobebisama lisusu te mpe ekokoma na kimia.
12 This is the plague our Father will bring on every nation that fought against Jerusalem: their flesh rots as they stand, their eyes rot in the sockets, their tongues in their mouths. Tala etumbu oyo Yawe akopesa na bikolo nyonso oyo ekobundisa Yelusalemi : Misuni ya banzoto na bango ekobanda kopola wana bazali nanu na bomoi ; miso na bango ekokufa na bilongi na bango mpe balolemo na bango ekokufa kati na minoko na bango.
13 On that day a great panic from our Father will fall on them; each will grab his neighbor's hand, and his hand will rise against his neighbor's hand. Na mokolo wana, Yawe akosala ete mobulu ekota kati na bango, bakobetana makofi mpe bakobomana bango na bango.
14 Judah too will fight at Jerusalem, and the wealth of all surrounding nations will be gathered—gold, silver, and garments in great abundance. Bato ya Yuda mpe bakobunda kati na Yelusalemi, bakokongola bomengo ya bikolo nyonso ya zingazinga : wolo, palata mpe bilamba mingi koleka.
15 The same plague will strike the horses, mules, camels, donkeys, and all animals in those camps. Etumbu ya ndenge moko kaka ekokweya likolo ya bampunda, ya bamile, ya bashamo, ya ba-ane mpe ya banyama nyonso oyo ekozala na molako.
16 Then every survivor of the nations that attacked Jerusalem will go up year after year to worship the King, the Father of heaven's armies, and to celebrate the Feast of Booths. Boye, batikali kati na bikolo nyonso oyo ebundisaki Yelusalemi bakomata mibu nyonso na Yelusalemi mpo na kogumbamela Mokonzi, Yawe Mokonzi ya mampinga, mpe mpo na kosala feti ya Bandako ya kapo.
17 Any family of the earth that does not go up to Jerusalem to worship the King, the Father of heaven's armies, will get no rain. Soki bato ya etuka moko ya mabele bakei te na Yelusalemi mpo na kogumbamela Mokonzi, Yawe Mokonzi ya mampinga, mvula ekonoka te na mokili na bango.
18 If Egypt's family does not go up and present itself, no rain will fall on them; the plague will come with which our Father strikes the nations that don't go up to celebrate the Feast of Booths. Soki bato ya Ejipito baboyi kokende kosala feti na Yelusalemi, mvula ekonoka te na mokili na bango. Boye, Yawe akopesa bango etumbu oyo abongisa mpo na ekolo nyonso oyo ekoboya kokende kosala feti ya Bandako ya kapo.
19 This will be the punishment of Egypt and all the nations that do not go up to celebrate the Feast of Booths. Ekozala etumbu ya Ejipito mpe ya bikolo nyonso oyo ekoboya kokende kosala feti ya Bandako ya kapo.
20 On that day "Holy to our Father" will be inscribed on the horses' bells, and the pots in our Father's house will be like the bowls before the altar. Na mokolo wana, bakotia makomi na bangonga mike-mike ya bampunda : « Ebulisami mpo na Yawe ! » Banzungu ya Tempelo ya Yawe ekozala mpe bule ndenge bakopo ezalaka bule liboso ya etumbelo.
21 Every pot in Jerusalem and Judah will be holy to the Father of heaven's armies, so all who sacrifice may come, take some, and cook in them. On that day no merchant will remain in the house of the Father of heaven's armies. Banzungu nyonso kati na Yelusalemi mpe kati na Yuda ekobulisama mpo na Yawe, Mokonzi ya mampinga ; mpe bato nyonso oyo bakoya kopesa makabo bakozwa ndambo ya banzungu mpe bakolambela yango. Na mokolo wana, ata moto moko te ya mombongo akotikala kati na Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]