Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Zechariah 12 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 A burden: the word of our Father concerning Israel—the declaration of our Father, who stretches the heavens, founds the earth, forms the human spirit within: Liloba na Yawe. Tala liloba oyo Yawe alobaki na tina na Isalaele. Yawe oyo atanda likolo mpe asala miboko ya mabele, Ye oyo atia Molimo na Ye kati na moto, alobi :
2 "Look, I am making Jerusalem a cup that sends all surrounding peoples reeling; Judah too will be in the siege against Jerusalem. « Nakokomisa Yelusalemi lokola kopo ya vino oyo elangwisaka bikolo nyonso ya zingazinga na yango ; bakozingela solo Yuda mpe Yelusalemi.
3 On that day I will make Jerusalem a heavy stone for all peoples; all who lift it will be badly gashed, while all nations of the earth gather against her.' Na mokolo wana, nakokomisa Yelusalemi lokola libanga ya kilo liboso ya bikolo nyonso ; moto nyonso oyo akoluka kotombola yango akozoka ; mpe bikolo nyonso ekosangana mpo na kobundisa Yelusalemi.
4 On that day, declares our Father, I will strike every horse with panic, its rider with madness. I will watch over the house of Judah but strike every horse of the peoples with blindness. Na mokolo wana, nakobangisa bampunda nyonso mpe nakokomisa batambolisi na yango liboma, » elobi Yawe. « Nakosenzela libota ya Yuda, kasi nakoboma miso ya bampunda nyonso ya bikolo.
5 Then Judah's clans will say in their hearts, 'Jerusalem's people are strong through their Father, the Father of heaven's armies.' Boye, bakambi ya Yuda bakomilobela : ‹ Bato ya Yelusalemi bazali makasi mpo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali Nzambe na bango. ›
6 "On that day I will make Judah's clans a firepot among wood, a flaming torch among sheaves; they will consume all the surrounding peoples right and left, while Jerusalem stays secure in her place. Na mokolo wana, nakokomisa bakambi ya Yuda lokola moto kati na liboke ya bakoni, lokola koni ya moto na se ya liboke ya matiti ekawuka : bakozikisa bikolo nyonso ya zingazinga na bango, ezala oyo ezali na ngambo ya loboko na bango ya mobali to ya mwasi. Kasi Yelusalemi ekotikala kaka na esika na yango.
7 "Our Father will save Judah's tents first, so David's house and Jerusalem's people are not glorified above Judah. Yawe akobikisa liboso bandako ya kapo ya Yuda mpo ete lokumu ya libota ya Davidi mpe ya bavandi ya Yelusalemi eleka te lokumu ya Yuda.
8 On that day our Father will shield those who live in Jerusalem, so that the weakest among them will be as mighty as King David. And the royal descendants will be like our Father, like the messenger of our Father who goes before Jerusalem's people. Na mokolo wana, Yawe akobatela bavandi ya Yelusalemi mpo ete bato ya bolembu kati na bango bakoma makasi lokola Davidi, mpe libota ya Davidi ekoma lokola Nzambe, lokola Anjelu ya Yawe, oyo azali kotambola liboso na bango.
9 'And on that day I will set out to destroy all the nations that come against Jerusalem. Na mokolo wana, nakobima mpo na koboma bikolo nyonso oyo ekobundisa Yelusalemi.
10 "And I will pour out on the house of David and on those who live in Jerusalem a spirit of grace and of pleas for mercy, so that they will look on me, whom they have pierced, and they will mourn for him as one mourns for an only child, and grieve bitterly over him as one grieves over a firstborn. Nakosopa Molimo ya ngolu mpe ya mabondeli epai ya libota ya Davidi mpe epai ya bavandi ya Yelusalemi. Bakosembola miso na bango epai na Ngai oyo batobolaki. Bakosalela ye matanga ndenge kaka basalaka matanga ya mwana oyo abotama kaka ye moko ; bakolela ye makasi ndenge balelaka mwana mobali ya liboso oyo asili kokufa.
11 On that day Jerusalem's mourning will be as great as the mourning for Hadad-rimmon in Megiddo's plain. Na mokolo wana, matanga kati na Yelusalemi ekozala monene lokola matanga ya Adadi-Rimoni na etando ya Megido.
12 The land will mourn, each family alone: David's house alone, and their wives alone; Nathan's house alone, and their wives alone; Mokili mobimba ekosala matanga, etuka na etuka na esika na yango elongo na basi na yango : etuka ya libota ya Davidi elongo na basi na yango, etuka ya libota ya Natan elongo na basi na yango,
13 the family of Levi's house alone and their wives alone; the family of Shimeites alone and their wives alone; etuka ya libota ya Levi elongo na basi na yango, etuka ya libota ya Shimei elongo na basi na yango,
14 and all the remaining families, each family on its own, and their wives on their own.'" mpe bituka nyonso oyo etikali elongo na basi na yango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]